Luka

2026.06.Likita linéne ya Lisanga ya baradio mpe  télévision ya Poto ekosalema na Prague 2026.06.Likita linéne ya Lisanga ya baradio mpe télévision ya Poto ekosalema na Prague 

Radio Vatican ezali na likita lya Poto ya bamédia na Prague

Likita linéne ya mbala ya 96 ya Lisangá ya Poto ya radio-télévision ekofúngwama na 24 ya sánzá ya motóbá na Prague, na ekóló Tchéquie, mpe ekosangisa baradio mpe télévision ya letá 113 bikowuta na bikóló 56, káti na bangó Radio Vatican, mókó ya binama bakeli lisangá ená.

Vatican News

Boni boni mokili ya média ya Poto ekotámbola na eleko ya Intelligence artificielle? Boni boni makámá minéne ya mokili bikoki kobeta mosála ya mopanzi nsango ya letá na Poto? Bokátikáti nini ya sémba káti ya mayéle mókó ya kosálela mingimingi internet ya boyébisi mpe lisengeli ya kobátela nsango yokó ya malámu, zambi bakónzi mpe bato ya Poto bakoka kozua mikáno milongobani? Waná bizali ndambo ya makambo ya ntina o ntéi ya Likita linéne ya Lisangá ya Poto ya radio-télévision, lisangá linéne koleka ya mokili ya bamédia ya letá.

Ekelama na 1950, lisangá ya Poto ezali leló na binama 113 ya baradio mpe télévision biwuti na bikóló 56. Likita linéne ya mbala ya 96 ekosálema na Cubex Center ya Prague, na ekóló Tchéquie, úta 24 kinó 26 ya sánzá ya motóbá, na nsé ya bokambi ya Česká televize mpe ya Český rozhlas, baradio mpe télévision ya letá ya Tchéquie. Radio Vatican, enama mokeli ya lisangá ya Poto, ekozala lokolá na likita ená ya Poto ya bamédia. Ezali mokambi molandi ya bamédia ya Vatican, Alessandro Gisotti, oyo azali lokolá mokambi ya etuluku «Radio mpe nsango ya koyoka» ya Lisangá lya Poto, oyo akolakisa télévision ya Papá.

Likita linéne ekozala lokolá na makita ya bingúmba ya bamédia ya letá. Radio Vatican ekosála mosála mókó makási mingi o káti ya Etuluku ya Méditerranée koleka na Etuluku ya Bikóló bike. Likita linéne ezali lisangá ya bokambi bonéne ya Likita ya Poto ya radio-télévision; ezali na makoki nionso ya ntina na bokobi maye Lisangá ekoluka, mpenza bolimboli ya bwanya bonéne mpe bondimi ya mwángo ya mosolo. Ekosangana mbala mibalé na mobú.

Likita ya eleko ya molunge ezali mpo ya binama bansó mpe baningá ya mosála mpe ekoyambema na lisangá lyokó enama. Likita lya malili ebongisama kaka na masangá binama mpe ekosálema na Genève, na ndáko enéne ya Lisangá ya Poto ya radio-télévision.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

23 sánzá ya motóbá 2026, 12:33