Ngwendé ya Sántu-Petelo elendisi «momeseno ya bosololi» mpo ya kotónga boboto
Vatican News
«Mpo ya kotónga boboto, esengeli na lombango koleka “momeseno ya bokónzi” na eye ya “momeseno ya bosololi” ya sóló esálemi na bosálisani mpe na bondimi lisusu ‘te moto na bisó mosusu azali yambo mongúná te, kasi moto mókó lokolá bisó». Waná ezali motéma ya nsakola ya Mgr Ettore Balestrero, motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU mpe masangá misusu ya mokili na Genève, o eleko ya likita ya mbala ya 62 ya bokútani ya Likita ya makoki ya bomoto.
Bondeko mpe bolingi, na káti ya boyókani nionso ya sémba
Ntómá ya Papá azuaki likanisi, mpo ya bomanyoli na ye, na mokánda na bato ya nzebi ya bonsómi etáli boboto mpe bosálisani na mokili, eye elobi «ntina ya kopesa motúya na bobongisi na boboto ya mikakatano na esika ya bokolisi nguyá ya mampinga mpe bokabwani», lokolá elobi Mokánda ya mibéko ya ONU. Mokánda, elobaki Mgr Balestrero, elakisi likambo ‘te «leló, bobakisi ya matata ekokende elongo na bokitisami mbala mókó ya mosolo ebongisami mpo ya botomboli, na lokolá babokáti mosolo na misála ya bokólóngóno ya nzóto, ya botéi mpe misála misusu mpo ya bato». Mpe «na mawa, motúya ya sóló ya nionso waná ekokweyela babolá ya koleka», elimbolaki ye.
Akebisaki bansó na makambo-makonzi ya «bondeko» mpe ya « bolingi ya bato» : mibéko miye «bikoki kozala na káti ya boyókani nionso ya sémba o ntéi ya bato».
Bobimisi nsango ya mabé ekobátela botiyi pembeni
Mgr Balestrero atelemaki na «loléngé likambo ekokende na bopesi nsango ya mabé na baréseaux sociaux mpe na lisikulu ya politiki» eye «ekobátela botiyi pembeni bato ya biyamba to ya bikóló bikeseni, na bomátisi bongo likámá ya botindiki moto asála likambo ya bokesenisi bato mpe/to ya mobúlú». «Boboto mpe bosálisani» bizali lokolá na likámá.
Na likambo yangó, episkopo atángaki encyclique ya Papá Léon XIV, Magnifica Humanitas, na esika nini Papá wa Roma alobi ‘te: «bopesi nsango ya mabé ebotami na IA te, kasi ezui na yangó leló mobakisi mókó ya makási. Bokoki ya kobongola nkomá, bilili mpe bavideo elakisi bato na makambo ya kobongwana to ya kokosa». «Bolukiluki ya bosóló -esúkisaki ntómá ya Papá-, eloko ya ntina ya demokrati, ezali ndéngé mókó ya kopesa maboko na bolámu ya bansó».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.