Lisengisi ya kotambwisa na bolámu makambo ya bokólóngóno elobami lisusu na Vatican
Vatican News
«Mosála ekokola ya makambo ya bokólóngóno mpe ya batechnologie ya internet na mosála ya mónganga ekobimisa mituná ya ntina ya bolámu biye bikosenga likanisi lyokó mpe boyókani bokó ya bikóló. Likita liye elakisaki libakú lyokó ya ntina ya komatisa botáli bokó ya sémba ya bolukiluki na biomédecine mpe masálisi ya bokólóngóno», elobaki Mgr Renzo Pegoraro, mokambi y'Akademi ya Papá mpo ya Bomoí, o eleko ya likita lya mbala ya isáto ya bato ya nzebi na botáli lisusu Nsakola ya Taipei ya bobáteli bansango ya bokólóngóno, eye esálemaki na 1 mpe 2 ya sánzá ya motóbá 2026 na ndako ya makita Sántu-Pie X, na Vatican. Likita ená ebongisamaki na Lingómbá ya mosála ya mónganga ya mokili, na bosálisani na Lingómbá ya mosála ya mónganga ya Israël.
Botáli ya bosémbo na bokongoli mpe bosáleli makambo ya bakoni
Likita, eye esangisaki bato ya nzebi ya mokili na mosála ya mónganga, bioéthique, sémbo, bokólóngóno ya bato mpe bokambi ya bokólóngóno, etálaki, engebene na nsakola ya súka ya babongisi, sémbo na bokongoli, bobáteli, bokoti mpe bosáleli makambo ya bokólóngóno mpe bilembo ya biologie. Masoló bitálaki bolakisi na nsé ya bato bazangi makoki mpe batiama pembeni na bolukiluki, bokaboli ya sémba ya matómba ya bolukiluki, bozali ya malámu ya baye basengeli na bozui mikáno ya bolámu mpe baloléngé ya bokambi bikosálisa bosémbo mpe bosálisani na mokili.
Bokeli na mosála ya mónganga esengeli kozala na bolámu mpe na sémba
Na bofúngoli likita, mónganga Jacqueline Kitulu, mokambi ya Lingómbá ya mosála ya mónganga ya mokili, alobaki motúya ya kokengele na ndéngé 'te bokeli na mosála ya mónganga etikala kokelama na bolámu mpe na sémba. «Makambo ya bokólóngóno mpe ya bolukiluki na bisika ya bobáteli bilembo ya biologie, elobaki ye, bibombi bokási bokó enéne mpo ya kotómbola masálisi ya bokólóngóno mpe baboyébi ya nzebi na mokili. Kasi, bomáti ya nzebi esengeli ekende elongo na mokúmbá ya bolámu, na bokotisi bokó ya sóló mpe bokaboli bokó ya sémba ya biyano zambi masangá minsó bazua litómba na ndéngé ya bokokani».
Nsakola ya Taipei, endimama na 2002
Endimama na ebándeli na Lingómbá ya mosála ya mónganga ya mokili na 2002 mpe etálama lisusu na 2016, Nsakola ya Taipei ekopésa banzelá ya bolámu na bosáleli makambo ya bokólóngóno mpe ya bisika ya bobáteli bilembo ya biologie. Libosó ya babomati ya Intelligence artificielle, ya génomique, ya mosála ya mónganga ekelami na makambo mpe bokaboli koleka bandelo ya bikóló ya makambo biye bikobongola masálisi ya bokólóngóno mpe bolukiluki ya mosála ya mónganga, Lingómbá esálaki nzelá yókó ya botáli lisusu zambi ya kolaka bokási ya Nsakola na ndéngé makambo bikosálema na mokili na eleko na bisó mpe na biloko tokoluka ya bolámu.
Mokili ekoki kosangana na mosála ya bokólóngóno ya bakoni
Likita na Vatican elakisi botúni ya mbala ya isáto ya bato ya nzebi efúngwamaki na mwángo ya botáli lisusu, sima ya likita ya yambo ya bato ya nzebi esálemaka na Taipei (Taïwan) na sánzá ya zómi na mibalé 2025 mpe ya mibalé na São Paulo (Brésil) na sánzá ya misáto 2026. «Bosálisani ya mínganga ya mokili mobimba», esúkisi nsakola, «ekolakisa 'te, atá na ntángo ya etumba, mokili ekoki kosangana na mosála ya bokólóngóno mpe bozali malámu ya bakoni. Tokolikya 'te elimo ená ya bosálisani ekosálisa na boyókani elámu koleka mpe na boboto».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.