2023.05.1 Ndako San Calisto 2023.05.1 Ndako San Calisto  (Copyright (c) 2018 Hamish Gray/Shutterstock. No use without permission.)

Likita lya yambo ya Komisyo káti ya badicastère na likambo ya IA na Vatican

Na 17 ya sánzá ya motóbá eleki, batindami ya badicastère mpo Litéya ya Boyambi, mpo ya Momeseno mpe Boyékoli, mpo ya Liyébísi mpe Mosála ya Botomboli moto mobimba, na lokolá Akademi ebelé ya Papá mpo ya Bomoí, ya Nzebi mpe ya Nzebi ya makambo ya bato, basanganaki na ndáko San Callisto na Roma mpo kotála ndéngé makambo ya misála bikokende sik’oyo, kokanisa na mosála ya Komisyo ya sika mpe kotála bitapi bikoya sima.

Vatican News

Likita lya yambo ya Komisyo káti ya badicastère na likambo ya intelligente artificielle (IA), ekelama na 16 ya sánzá ya mitáno mpo ya kosálisa bokambi mpe bosálisani káti ya misála mikeseni ya Ngwendé ya Sántu-Petelo baye bamipesa na boyékoli, likanisi mpe bosáleli ya IA, esálemaki na 17 ya sánzá ya motóbá eleki. Likita esangisaki na ndáko San Callisto, ezali o káti ya etuka ya Trastevere, batindami ya badicastère mpo Litéya ya Boyambi, mpo ya Momeseno mpe Boyékoli, mpo ya Liyébísi mpe Mosála ya Botomboli moto mobimba, na lokolá Akademi ebelé ya Papá mpo ya Bomoí, ya Nzebi mpe ya Nzebi ya makambo ya bato. Bokútáni ezalaki ya kokabola misála bikosálema sik’oyo, koyéba makambo ya ntina ya libosó mpe kolimbola bitapi ya yambo ya etamboli yokó na boluki kokolisa bomoni bokó ya IA na mosála ya lokúmu ya moto, ya bolámu ya bansó mpe ya etindá ya Eklezia.



Dicastère mpo Mosála ya Botomboli moto mobimba ezuaki mokúmbá ya kokamba Komisyo na mobú na ye ya yambo ya mosála. Na lisikulu na ye ya ebándeli, préfet na ye, episkopo ya lokúmu Michael Czerny, alobaki makambo minéi mpenza ya ntina ya botomboli ya sika ya IA: lombango esálema te na etamboli ya IA, ndéngé ezali kosála mosála na lokúmu ya moto, lisoló eye ekokola káti ya Eklezia mpe eténi ya technologie, mpe litómba makási ebimi na encyclique Magnifica Humanitas. Bokébi bokó ya malongá epesamaki na lisengeli ya kosála elongo na bomanyoli ya likambo lyokó eye ekolakisa mabakú ebelé, kasi lokolá makámá mpe mikakatano ya ezaleli malámu, ya bato, ya momeseno mpe ya nzinganzinga ya ntina koleka. Mabongisi (institutions) miye mitáli yangó balakisaki misála na bangó mpe makanisi na bangó na intelligence artificielle, na botáli boyékoli ebelé mpe misála mitáli bilembo ya nzebi, ya bato, ya makambo malámu mpe ya boyékoli ya technologie ená. Elobamaki lokolá etamboli esálemaka na bokútani etáli IA mpe mbela ya Roma mpo likambo malámu ya IA na 2020, na lokolá likanisi ya liloba ya Papá François etáli boyókani káti ya IA mpe boboto o eleko ya Mokolo ya mokili mobimba ya boboto 2024.

Bokambi, boyékoli mpe bosololi

Na eye etáli mosála ya komisyo ya sika, boyókani bokó ya bato bansó emonani na lisengeli ya etindá mibalé: na ngambo yokó, kosálisa bokambi ya káti, bokaboli ya bansango mpe likanisi na bosáleli IA o ntéi ya misála ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Na ngambo esusu, kopesa esika yokó ya botáli mpo ya bomanyoli mpe lisungi na makanisi bébóo bikosálema na likambo waná. Ezali na ntina ya kobátela bosololi bokó ya kofúngwama na bato ya etéyelo enéne, bato ya bolukiluki mpe ya misála, na lokolá Masangá ya baepiskopo. Likanisi ya Eklezia esengeli kokoba ya kobunda na bambongwana bikosálema káti na bato. Na loléngé ená, esika yokó ya internet ebongisama ekoki kozala esaleli yokó ya ntina mpo ya kokabola makanisi mpe kosálisa botámboli ya nsango.

Bitapi bikolanda

Komisyo ekolimbola malémbe malémbe loléngé na ye ya kosála. Bitapi ya yambo bikoki kokotisa misála bikosálema, bosangisi ya makambo-makonzi biyébani na misála bikeseni mpe bosáli milongó ya bokambi na botáli bosáleli ya Intelligence artificielle o ntéi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Baye basangani o likita bakumisaki likita eye ya yambo ya Komisyo káti ya badicastère na likambo ya IA, kaka mpo bomoni epesami na misála mileka mpe ya sika te, kasi lokolá mpo ya bokaboli endingisami káti ya misála bikeseni bitindamaki. Komisyo ekosangana lisusu na káti ya sánzá ya sambo.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

29 sánzá ya motóbá 2026, 15:13