Léon XIV na Espagne, eyano ya ntembe te ya Madrid
Massimiliano Menichetti
Elili ya yambo ya mobémbo ya Léon XIV na Espagne ezali eye ya Madrid ekátisami na bato ebelé: mabótá, bilengé, babangé, basáli ya Nzámbe, bangembo, bansó basangani. Na mikolo miye, bisika na babalabala bizui balángi ya bendele ya Papá mpe ya Espagne, maloba mpo ya boboto, bomoko, boyókani, bolingo mpo ya Mokitani ya Petelo akómi mpo ya kososola na boyambi. Bato bébóo na ezuzunu mpe na esengo: na losámbo to na bosepeli, bakamwi mpe bakobeta mabóko ya kowumela, lokolá miniti sambo ya kobosana te na Parlement, sima ya koyóka maloba ya Papá.
Libosó ya misála ya Letá, Papá alobaki lisusu 'te bovandi lisangá ya sóló ekoki kobosana te bobáteli ya bomoí nionso ya moto, lisálisi na baye bazangi, elaka ya bonsómi ya boyébi mpe ya eyamba, mpe bobwaki ya etumba nionso mpe mobúlú. Mpo lingómbá lyokó ya sémba ekomekama na bokoki na ye ya kobátela baye bakoki babosana bangó. Eye emonani na mobémbo eye ya yambo na Espagne, ezali kaka esengo ya koyamba Papá wa Roma mókó sima ya mibú ebelé te, kasi eyano yokó ya sóló, mpéma ya boyébi bokó ya bomoí eye ekotombwama mpe ebimisi bonzenga. Ekóló eye, ekátisami na bituluku ya bokabwani, makámá ya politiki, etálisamaki libosó mpe mopepe mókó ya bokaboli ya eyamba mpe politiki, elakisaki mosisa ya makási mpe ya mozindo, eye ya boyambi.
Ayanolaki, engebene na batáli ebelé, na loléngé lyokó ezelamaki te: na bozongisi ya sika «iyo» na ye na Kristu. Bansó bakútani, na molúlú mókó mókó, bokútáni to losambo, na bopesi bomoí na lokóta lyokó ya lisangá, molimo mókó ekabolami, bomoni bokó ya sékó, mpe ezali waná ndé evandi elongo likoki lyokó ya mbongwana ya makási. Papá ayambaki pási ya baye bazokaki na nsómo ya bambéba mpe abéngaki Eklezia ya ekóló ya kozala ndakisa ya bomoko. Alobaki na Espagne yokó elati likanisi ya moto to ya mawa te; amemaki bolimbisi, bolingo mpe bosúkisa ya Kristu leló, na bolendisi mókó mókó ya kotónga mokili mókó ekeseni: ya bondeko, ya bokotisi, ya bosálisani, ya boyambi, ya botosi, ya bomoto mpe ya boboto.
Léon XIV alobelaki ekóló yokó ya moléndé, kasi na ndéngé ya nkita ya liloba te. Moléndé mókó ya botáli -ebaluka na likoló, lokolá ekoloba lisusu liloba-ntina ya mobémbo: «Alzada la mirada» - ekoki kozongisa sika na Bosóló ya ekóló, ya Poto mpe mokili. Na loléngé ená, abwakaki mokakatano mókó ya sóló, na boloni mboto yokó ya bolingi na Kristu oyo akobongola bomoí ya moto nionso akoyamba Ye.
Ndéngé waná ba molongó biye bikobátela bongaí, bobubi, mabé mpe likunya bikosálema, mpe nzokándé bokási bokó ya bokeli mpe ya kobota bolingo eye ekokota loléngé lyokó lyokó ya bomoto ekotelema. Sángó molandi ya Kristu na Madrid abalukisaki likanisi ya mokili, mpo amemaki biyano bikelami na elonga ya ngambo mókó na mosusu, kasi afúngolaki na monéne, mbala mókó lisusu, ezibeli na motuná ya liyoki eye evandi na motéma ya moto mókó mókó, na bolakisi nzelá eye ekosálisa ya kobika na mobimba.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye