Koleka bokúmbi ya biloko mpe mombongo, elongi ya bomoto ya mbú
Vatican News
Na 12 ya sánzá ya sambo, bakristu ya mokili mobimba bakosepela mokolo ya eyenga ya Mbú. Na libakú liná, préfet ya dicastère mpo ya Mosála ya botomboli moto mobimba, episkopo ya lokúmu Michael Czerny, atindi liloba lyokó na basáleli ya molimo mpe na basáli nionso ya pámba na mosala ya bobáteli mbú. «Bomoí ya mokili ekokoba koleka na bambú, mingala, bitima mpe banzelá ya mayi ya mokili», ekomi episkopo ya lokúmu. «Likámá ya eténi ya moke ya mbú káti ya bikóló mibalé ( détroit) Ormuz elobamaki lisusu na mokili ndéngé nini bomoto ekangemi makási na mbú mpe na baye basálaka kúna».
Na libakú ya Mokolo ya eyenga ya Mbú, Eklezia ekopesa lokúmu «na mibáli waná mpe bási waná, kaka mpo ya mosála bazali kosála to biloko ya mombongo bakúmbaka te, kasi lokolá neti bato bakelami na elili mpe bokokani na Nzámbe mpe bazali na lokúmu lyokó ekoki kobébisama te».
Mokili ya leló ezali na elembo ya bozangi bokengi, etumba mpe bobángi. Mbú «eye esangisaka úta kála bato mpe bikóló» ezali libandá ya mobéko te. «Binama ebelé ya lisangá ya basáli ya masuwá bakoki kaka te kobunda na makámá ya mbú mpe banzelá ya mayi te, kasi basimbamaki lokolá kála te na bitumba ya mindoki biye bimemaki bobombi bangó na masuwá, babozangi ya bilei mpe kútu bobángi mpo ya bomoí na bangó», elobi préfet na nsango na ye.
Na waná ebakisami bobombami eyókani na mbú likoló ya «bokitisi ya bato, bokitisi ya ndingisa na mabelé, manaka ya pási mpe mokakatano ya ntángo insó ya bomoí ya masuwá bikotika esika moke ya bopemi, ya bondeko to ya babokútani ya bato ya sóló». Nzokándé, masuwá mókó «ekoki kokóma esika yokó ya bobombani na bonkútú to ya bozangi likébi te», kasi ekoki kotatola bokoki «ya bondeko, bosálisani, botosi epái na epái mpe bozali na boyókani ya kotalana na boboto» eye bato ya bikóló, ya mimeseno mpe ya bondimi ya ndéngé na ndéngé.
Eklezia ekoki komata na masuwá ya moke
Nionso lokolá Mokónzi «oyo amataka na masuwá ya moke na bayékoli na ye akokoba kopusana pembeni ya baye bazali kotambola na bambú mpe banzelá ya mayi ya eleko na bisó», Eklezia ebéngami komata na masuwá ya moke mpo ya «kokende elongo, koyóka, kobonda, kobátela lokúmu mpe kokóma elembo yokó ekomonana ya elikya mpe ebombelo o káti ya mipepe ya makási ya bomoí». Ekosála yangó na nzelá ya babosáleli ya molimo, baministeli ya mbú mpe bozali bokó ya bomikitisi ekangema na momeseno molayi ya Apostola ya Mbú.
Episkopo ya lokúmu Michael Czerny atondaki basáli ya mbú, balobi mbisi mpe bato ya mosála ya mbú mpo ya bomipesi na bangó na mosála ya mombongo ya mokili, ya bobáteli ya biléi, ya bolámu ya masangá ebelé. Apesaki lokolá botondi ya sóló na basáleli ya molimo, na bato ya mosála ezanga lifuta, na masangá ya lisálisi ya bato ya masuwá mpe basáli ya Nsango-Ndamu baye «bakokoba na lobokó komema bolingi, losámbo, boyóki mpe lisálisi ya sóló na mabongo mpe na masuwá ya mokili mobimba».
«Esálema 'te mokolo ya Eyenga ya Mbú kozongisa mókó mókó ya bisó na bomipesi bokó ya mozindo epái penepene, bosálisani, botosi ya Bokeli mpe bokengi na bolingo epái ya bato bansó ya mbú mpe ya banzelá ya mayi ya káti», esúkisaki préfet.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.