Luka

2026.02.06 Episkopo Ettore Balestrero 2026.02.06 Episkopo Ettore Balestrero 

IA mpe mosála: Ngwendé ya Sántu-Petelo ekobátela lokúmu ya moto mpe bolámu ya bansó

Mgr Balestrero, motáli ya eleko insó epái ya ONU mpe masangá misusu ya mokili na Genève, alobaki mokolo ya yambo ntángo ya Liyangani ya bikóló ya Mosála ya mbala ya 114: «Tosengeli kolembisa makambo mabé ya misála ya internet, na bobáteli 'te Intelligence artificielle (IA) esálela ya sóló bolámu ya bansó»

Vatican News

Bomáti na lombango ya misála ya internet ebongola mokili ya mosála, na bopési mabongi ya sika ya mosála, kasi na bolakisi lokolá basáli ebelé na «loléngé ya sika ya bomonani te mpe ya bobubi». Waná ezali eye Mgr Ettore Balestrero, motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU mpe masangá misusu ya mokili na Genève, alobaki na lisikulu na ye elobamaki mokolo ya yambo ya sánzá ya motóbá na Liyangani ya mbala ya 114 ya mokili ya Mosála.

Kobátela lokúmu ya moto mpe lokúmu ya mosála

Engebene na episkopo, bolobani na misála ya internet esengelaki kotála «lokúmu ya káti mpe epésami na Nzámbe na moto mpe na lokúmu ya mosála». «Matata ezali ya technologie te, kasi ya moto», elobaki Mgr Balestrero, na botángi liloba lyokó ya Papá Léon XIV na nsango na ye ya Mokolo ya mokili ya mbala ya 60 ya boyébisi.

Koboya babokeseni ya sika

Na maye matáli makambo ya malámu, Motáli ya eleko insó alobaki lisusu encyclique Magnifica Humanitas ya Papá Léon XIV mpo ya koloba 'te ntángo bokónzi ezuami kaka na mabóko ya mwá bato, «ekoluka kokóma molili mpe koboya botáli ya bato, na bomátisi likámá ya baloléngé ya botomboli ya mabé mpe bikeseni». Yangó waná, elobaki ye, ezali na ntina kotónga baloléngé ya boyókani «na botosi ya bolámu ya bansó».

Botomboli na mosála ya bolámu ya bansó

Likambo lisusu ya mabé ya mosála ekokola ya internet etáli «bokónzi ya misála ya internet ya kolaka mpe kopésa ndelo na bozui mosála». «Waná elingi koloba basáli basengeli kokoka kofuta mpo ya komona bisika ya kozua mosála», elobaki episkopo, na bolobi bokwéi bokó ya mobéko eye elobi mosáli mókó te asengeli kofuta mpo ya mosála mókó. «Ezali bôngó na ntina», esúkisaki episkopo, «kobánda bolobani na baningá na makoki ya kolembisa makambo mabé ya bankita ya sika ya internet, na bokengeli 'te IA esálela ya sóló bolámu ya bansó».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

03 sánzá ya motóbá 2026, 15:00