Luka

2026.06.27 Eténi ya minei ya Consistoire ya mbalakaka, na 27 ya sanza ya motoba 2026.06.27 Eténi ya minei ya Consistoire ya mbalakaka, na 27 ya sanza ya motoba   (@Vatican Media)

Eténi ya súka ya consistoire, Synode mpe bonganga-Nzámbe

Mpo ya eténi eye ya minei ya mosála, baepiskopo ya lokúmu bakanisaki na lisengi ya kopesa na basángó elili yokó bonganga-Nzámbe ya « kitoko, ya kokela, ya nsango-ndamu mpe mbala mókó ebaluka na eklezia te ». Na káti ya masolo, ezalaki lokola likámá ‘te boike ya banzelá ya botuni ekoka kokómisa Eklezia kilo, ntángo ebengami ya kopesa litatoli na ye na mokili.

Vatican News

Kokolisa balomeko ya bominyokoli mpe ya lisapo ya synodalité, na bopesi na bandimi elili yokó ya bonganga-Nzámbe ya mbala mókó ya nsango-ndamu mpe ebaluka na eklezia te. Waná bizali ndambo ya makambo-makonzi biye bibimaki o eleko ya eténi ya minei ya consistoire ya mbalakaka esálemaki mokolo ya póso 27 ya sánzá ya motóbá. Na liyébisi lyokó ya Ndáko ya média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo elobi ‘te misála bilekaki na Ndáko ya Synode, na bokambemi ya episkopo ya lokúmu Joseph William Tobin, episkopo ya Newark, n’Amerika.

Kokomisa Eklezia « kilo te »

Sima ya liloba ya ebándeli ya episkopo ya lokúmu Mario Grech, secrétaire monéne ya Secrétariat monéne ya Synode, baepiskopo ya lokúmu mingi bazuaki maloba. Engebene na bansango bipesamaki na Ndáko ya média, baepiskopo ya lokúmu balobaki likámá «'te boíké ya botuni ekoka kokómisa Eklezia kilo na eleko yokó epái wápi ebengami ya kopesa litatoli na ye». Kaka na eleko ená, elobamaki lisusu 'te Eklezia ya likoló mpe Bato ya Nzámbe bazali bangó bansó mibalé, atá na loléngé ya bokeseni, «na bososoli na eye Elimo ekoloba na Eklezia».

Masangá katoliko ya molúlú ya monyele

Baepiskopo ya lokúmu balobaki lokolá lisungi ya masangá katoliko ya molúlú ya monyele, eye nzebi ya Synode ekolakisa bopesi bokó ya ntina na etamboli eye ekotisi Eklezia nionso. Eténi ya yambo ya bokútáni esilaki na ngonga ya 17. Sima ya bopemi bokó, linaka ebongisi lisoló lyokó na Papá Léon XIV, eleko kani bato bakozala waná bakozua likoki ya kozua liloba na bonsómi na miniti misáto kaka.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

28 sánzá ya motóbá 2026, 12:04