Episkopo ya lokúmu You Heung-sik: mabelé ya Corée ekoki koboya kimia te
JR Bompolonga – Kinshasa
«Mabelé ya Corée ekumbi lisusu bilembo ya bokabwani. Bandeko ya mibáli mpe ya bási bakobika kaka bakabwana. Pási nini ekoki koleka eye waná? Na likambo mókó te tokoki koboya boboto, mpo ya likambo mókó te. Tozali na mokúmbá ya komipesa bansó, lisangá mpe na makási na bisó nionso, mpo ya kotónga boboto». Ezali na mbélá ená, ntángo ya litéya na ye elobamaki o eleko ya misa ya ntina mpo ya boboto mpe mpo ya boyókani na mabelé ya Corée, na basilique ya Roma Sántu-Polo-libánda-ya-bifelo, ndé episkopo ya lokúmu ya Corée Lazzaro You Heung-sik, préfet ya dicastère mpo ya bonganga-Nzámbe mpe episkopo ya kála ya Daejeon, alingaki 'te Ekóló ya Corée «ekoka kotatola libosó ya mokili mobimba 'te bosololi ezali makási koleka etumba, boyókani makási koleka boyini mpe botiyi motéma makási koleka kobánga». Mpósá mókó ebimi na bolobi mbala mókó na mokónzi ya Corée ya Sudi, Lee Jae-myung, azalaki na misa mokolo ya eyenga na mwási na ye Kim Hye-kyung, mwá batindami ya bulamatari ya Corée ya Sudi mpe binama ya bantómá ya bikóló bisusu ya mokili.
Na Léon XIV, Eklezia na etindá mpo ya kotónga boboto
Na eyenga eye ya zómi na mókó ya eleko ya bongobongo, mokolo yambo ya likita ya Papá Léon XIV na mokónzi Lee, ebongisami na 15 ya sánzá ya motóbá, episkopo ya lokúmu You alobaki lisusu 'te «atá na bisika ya pási koleka,elikya ezali kaka». Mawa, ebengaki ye, «ekoki kokitana na mobúlú, mpe boyébisi ekoki kokitana na bobwaki miso. Atá ntángo moto mókó akomonana neti abongami te ya kosolola, nzelá ya boboto ekofúngwama ntángo tokoluka bokútáni na motéma mókó ebongami na boyóki». Episkopo ya lokúmu ya Corée alobaki 'te, ekambemi na Léon XIV, «Eklezia katoliko ekokoba komipesa na makási mpo ya kosála etindá na ye ya kobátela lokúmu ya bomoí mobimba ya moto mpe ya kotónga mokili mókó ya boboto».
Boboto ya sóló ebotamaka na lisoló lyokó ya sóló mpe polélé
Boboto ya sóló, elimbolaki ye, ezali kaka bozangi ya bitumba te, kasi ebotamaka na babomipesi ya sóló: «bosololi bokó ya sóló mpe polélé, botosi ya lokúmu ya moto mókó mókó mpe bokási ya kososola ezaleli ya moninga». Mpo ya episkopo ya lokúmu, «nkótá ya politiki mpe ya mosála ya boyébi boyókani káti ya bikóló (diplomatie) bikoki kokesene, kasi mpósá ya kobátela bomoí, ya kosálela moto mpe ya koluka bolámu ya bansó ekoki kosangana na elimo ya Nsango-Ndamu».
Papá François mpe mawa epái ya bato ya makámá
Mokili ya leló, ekobaki episkopo ya lokúmu You, «ezali eleko yókó epái wápi mawa epái ya bandeko na bisó ya mibáli mpe ya bási ezali na ntina koleka nionso». Kasi esika wápi ekokaki kozala mawa, «tokomona mingimingi bobwaki miso mpe bongaí; mpe atá mobúlú mpe bokási bikomeka koluka esika na yangó. O ntéi ya bosóló ená, Mokónzi akobenga bisó ya kozala na motéma etóndi na epái ya baye bazua makámá ya mobúlú», ebakisaki ye, na bolobi lisusu bokútáni ya Papá François na mabótá ya bato ya makámá ya likambo ya mawa ya ferry Sewol, ntángo ya mobémbo na ye na Corée ya Sudi na sánzá ya mwambi 2014. «Na kimia yokó ya bozindo, na losámbo mpe na botáli bokó etonda na bolingo, ayambaka pási na bangó» mpe «alakisaka ya sóló 'te Eklezia ekoki kozala Eklezia yókó eye ekotámbola pembeni ya babolá mpe ya baye bakonyokwama».
Eklezia ezali pembeni ya baye bazua makámá
Na mobémbo ya bozongi na Roma, esúkisaki préfet ya dicastère ya bonganga-Nzámbe, batunáki na Papá sóki ekela na ye ya bobondi ekokaki kolimbolama na ndéngé ya politiki. Papá François ayanolaki polélé: «Libosó ya pási ya moto, okoki kozala káti te». Maloba waná, mpo ya episkopo You, «bimemaka mbondi mókó ya mozindo mpe ya moléndé na baí-Corée. Bikolobela bisó lisusu 'te motindo ya Nsango-Ndamu mpe loléngé ya kobika mawa eye ya Eklezia bizali ya kokabola te, kasi ya kotikala pembeni ya baye bazui makámá».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.