Episkopo ya lokúmu Parolin akébisi na bokólóngóno ya motó ya pété ya bilengé
JR Bompolonga – Kinshasa
Episkopo ya lokúmu Pietro Parolin azuaki maloba mokolo ya mitáno na ntongo o eleko ya liyangani ya bikóló ya mikolo mibalé na Villa pia na bilanga ya Vatican mpe na nkombo «Kálati ya elikya mpo ya linaka lyokó ya botéi ya engúmba: bokólóngóno ya motó, technologie ya internet mpe botéi». Molúlú esangisi úta 29 kinó 30 ya sánzá ya mitáno ba ministre ya Botéi ya bikóló ya péninsule Ibérique mpe y'Amerika, na lokolá bato ya mayéle, bato ya bitéyelo ya likoló mpe batindami ya masangá ya mokili, zambi ya kokanisa na mikakatano ya ntina ya botéi ya eleko eye. Bokútáni bokó eye episkopo ya lokúmu Parolin abéngaki ya «mpenza ya ntina mpe ya sika», na bolobi lisusu «bozui boyébi, epanzani mingi mingi o ntéi ya lisangá ya mokili, 'te botéi ezali kaka mokabo mókó te káti ya bisusu ya linaka ya politiki, kasi likonzi lyokó ya botomboli moto mobimba, ya bovandi lisangá na boboto mpe na sémbo».
Lobí lyokó ya bomoto koleka
Na eye etáli mingi mpenza etando ya péninsule Ibérique mpe y'Amerika, episkopo ya lokúmu alobaki 'te «bandéngé ya botéi ya engúmba, atáko bomáti ya ntina bisálemi na mibú mileki na loléngé ya kokota mpe ya kotóndisa, bikobunda leló na mikakatano biye bikosenga biyano ya sika: botéi mobimba ya bomoto, bomátisi ya makoki ya moto, bobáteli ya baye balembi, bokotisi elongobami ya batechnologie ya internet». Bizali «mikakatano biye bikoki komatisama na masálisi ya biténi, kasi biye bikosenga bosálisani ebongisami malámu, ya loléngé ebelé mpe ya libela». Mpe bizali waná mikakatano biye Ngwendé ya Sántu-Petelo ekolanda úta kála na mokili, endimi 'te «botéi ezali yókó ya ndéngé ebelé koleka ya bolingi mpe yókó ya bisáleli ya makási koleka na mosála ya lokúmu ya moto mpe ya bolámu ya bansó». Yangó waná mbélá ya Secrétaire ya Letá ya «kobongisa banzelá ya sóló, ya bosóló mpe bikabolani, biye bikomema epái ya lobí lyokó ya sémba koleka mpe bomoto koleka».
Bondeko ya botéi mobimba
Botáli Bondeko ya botéi mobimba esálemi na Papá François na 2019 ezali polélé: ezali ya kobyanga mibáli bansó mpe bási bansó ya motéma malámu ya kosangana na «boyókani bokó mpo ya botéi likoki kobota bondeko, kimia mpe bosémbo». Botáli ezali eye elobama na mokánda ya bontómá «koyema bakálati ya sika ya elikya», Léon XIV atiaka mokoloto na 27 ya sánzá ya zómi eleki o eleko ya mibú 60 ya nsakola ya Concile Gravissimum educationis. Na mokánda ená, Tatá-Esántu alobaki lisusu 'te botéi ezali mosála mókó ya bongo bongo te, kasi ezali ntondó ya etindá ya Eklezia na mokili; abéngaki ya kotónga «liboke lyokó ya botéi ya mokili», elobaki episkopo ya lokúmu Parolin. Makambo misáto ya sika «bikopesa banzelá ya Bondeko ya botéi ya mokili: bokeki (soin) ya bomoí ya káti, internet ya bomoto mpe botéi ya boboto». Bokútáni ezali kotála ya sóló makambo waná.
Ya lombango epái ya bilengé
Na bozui na ye ya maloba, episkopo ya lokúmu Parolin abetaki nsete na ntina ya komema bokébi bokó ya malámu na likambo ya bokólóngóno ya motó. «Makambo bizali koloba mpe, na botáli, bikobángisa», elobaki ye. «Na bileko ebelé, ekobaki ye, bamobúlú waná bitálisama te bisálisama te na ndéngé elongobami, mingimingi esika wápi makoki ya bolembi ya moto mpe ya nkita bizali pási koleka». Bilengé bazali baye ya yambo basimbami na makambo waná. Bomáti ya ndéngé ya nsómo, ya mawa mpe ya pási ya molimo.
Libosó ya liséngínyá ya «kokitisa likambo na motuná mókó ya lopitalo, na botindi yangó kaka na loléngé ya bokólóngóno», episkopo ya lokúmu Parolin alobi lisusu 'te «Eklezia etéyaka kaka 'te moto azali eloko yókó ekoki kokabolama te esálema na nzóto, elimo mpe molimo». Balomeko misáto bisengeli bitálema na banzelá ya botéi. Episkopo ya lokúmu abengi koloba lisusu «lisengeli ya kondima mpe kolona eténi ená: kopésa na bilengé kaka makoki mpe boyébi te, kasi lokolá bisáleli mpo ya komiyéba bangó mókó, mpo ya kokamba bopaswami ya motéma na bangó, mpo ya kotónga boyókani ya ntina, mpo ya kozua liyoki lyokó na bomoí na bangó».
Mosála ya etéyelo mpe ya mabótá ezali na ntembe te. Etéyelo «esengeli kobénda kozala esika yókó ya bobáteli, ya bondimi mpe ya bokébi», nzinganzinga yókó esika wápi «moyékoli mókó mókó akomiyoka amonani, ayokani mpe kokambema». Mpe ezali mpo na waná ndé esengeli kokoka kozua «makoki bisengeli». Na likambo ya «mosála ya ntina ya mabótá mpe masangá ya bikóló», episkopo ya lokúmu Parolin asemboli 'te sóki libótá ezui «lisálisi mpe ekambemi, ekomonisa likambo ya bobáteli ya koleka makási mpo ya bokólóngóno ya motó ya bána mpe bilengé». Kasi sóki «etikali ye mókó libosó ya matata ya nkita, ya lingómbá mpe ya bonkoko, likoki na ye ya bobáteli ekolemba mpe likámá ya kozala mabé ekomata».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.