Luka

2019.07.05 Vescovi, sacerdoti, preti, vescovo, sacerdote, prete

Dicastère ya Molúlú ya bonzámbe: laíki lyokó te akoki kopesa litéya

Eyano ya dicastère mpo ya Molúlú ya bonzámbe mpe Mobéko ya basakraménto na motuná etunamaka na baepiskopo y'Allemagne ezali ya koboya. Na mokánda mókó, dicastère esemboli 'te nsakola ya Liloba na misa ekangema na etindá ezuama na sakraménto.

Vatican News

Dicastère mpo ya Molúlú ya bonzámbe mpe Mobéko ya basakraménto, na mokánda mókó n'anglais ya 17 ya sánzá ya motóbá 2026, ayanoli na motuná etunamaka na baepiskopo y'Allemagne na 30 ya sánzá ya misáto eleki etáli likoki ya kopesa litéya, na bileko bisusu ya ntina, na balaíki balongobami.

Na mokánda ená etindámi na Mgr Heiner Wilmer, mokambi ya Lisangá ya baepiskopo y'Allemagne, dicastère, na bolobi bosepeli na ye na mituná ya mobáteli biye bipesaki likanisi na bosenga boná, elobi 'te likoki liná ezali te mpe 'te «mobéko ekosálema sikawa ekoki kosála eloko ya ndingisa na lotómo te, mpo litéya ebongama na sángó to na diacre ewuti na mobéko mókó ya pámba te, kasi ekoleka na loléngé mpenza ya litéya ya milúlú mpe nsámbo ya misa».

Liloba mpe etindá

Litéya ezali eténi yokó ya Litéya ya milúlú mpe nsámbo ya misa ya Liloba, ezali ya kokangema makási na nsakola ya Nsango-Ndamu mpe ekolakisa ngalasisi yokó ya munus docendi («kokoka kotéya») epesama na basángó bakula sakraménto ya Bonganga. Nsakola ya Liloba na misa ezali bôngó ya kokangema na etindá ezuamaka na sakraménto mpe na bomoko ekosangisa Liloba mpe Sakraménto na misa.

Bandéngé misusu ya bosakoli

Mokánda elobi lokolá ntina ya kotombola botéi ya eleko insó ya bonganga-Nzámbe zambi litéya ekoka kobimisa na mobimba bokási na yangó ya mosála ya mobáteli mpe ya molimo. Na súka, dicastère elobi lisusu 'te mobéko ya sikawa ya Eklezia ebongisa kála bandéngé mingi ya nsakola ya Liloba mpe ya bosakoli biye bikoki kopesama na bandimi laíki libandá ya litéya mpe libandá ya misa, engebene na mobéko ya Eklezia (droit canonique) mpe na loléngé mpenza ya bandéngé bikeseni ya nsakola ya Nsango-Ndamu.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

25 sánzá ya motóbá 2026, 14:28