Luka

2026.06.Mabelé ya Santa Maria di Galeria esika wapi mwango ya agivoltaique ekosalema 2026.06.Mabelé ya Santa Maria di Galeria esika wapi mwango ya agivoltaique ekosalema 

Boyókani bokó mpo ya bisika ya bilangá na lotiliki ewúti na moyi na Santa Maria di Galeria

Boyókani bokó etiamaki mabóko na zómi ya sánzá ya motóbá káti ya bulamatari ya Letá ya Vatican, Fondation «Fratello Sole» mpe mosála ya Letá ya Italie ACEA, zambi ya bosáli esika yokó ya bilanga na lotiliki na mabelé ya Santa Maria di Galeria.

Vatican News

Boúmeli ya nzinganzinga, bosáleli ndéngé elongobami ya makoki mpe bobáteli ya Ndáko ya bansó. Waná bizali mibéko biye bipesi likanisi na boyókani etiamaki mokoloto na 10 ya sánzá ya zómi na mibalé káti ya Bulamatari ya Letá ya Vatican, bokónzi ya libulá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo (APSA), Fondation «Fratello Sole» mpe ACEA. Eloko ekolukama na boyókani ená, lokolá ekomi liyébísi lyokó ya misála ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe mosála ya Letá ya Italie ya bokaboli mpe bobimisi lotiliki, «ezali botomboli ya nzelá yókó ya bansó na boluki kolimbola, kobongisa mpe kotia malémbe malémbe parc ya bilangá na lotiliki ewúti na moyi eye Ngwendé ya Sántu-Petelo -na lisálisi ya Bulamatari ya Letá ya Vatican, Bokónzi ya libulá ya Ngwendé (APSA) mpe Fondation «Fratello Sole»- elingi kosála o ntéi ya mabelé ya Santa Maria di Galeria».

Kopesa nguyá na Vatican mobimba

Na mokánda na ye atiaka mokoloto ya yambo ya sánzá ya motóbá eleki, Papá Léon XIV akelaki Fondation «Fratello Sole» mpe andimaki mibéko na yangó, zambi ya komema na malámu bokokisi ya mwángo ená ya esika ya bilanga mpe lotiliki ewúti na moyi, mpo ya kolaka «kaka bopesi lotiliki na esika ya radio te eye ezali waná, kasi lokolá kopesa nguyá mobimba na Letá ya Vatican». Mwángo ebengami na nkombo ya lopoto agrivoltaïque, elimboli lisusu liyébísi, «ekopésa bokébi mpenza na bosáleli ya bambano ya sika mpe ya bokútáni, bikoki kosangisa bobimisi ya nguyá, bosáleli na makási makoki mpe bopési motúya na mabelé». Mpo na yangó, boyókani ezali na káti ya molongó ya mitindo ya Litéya ya Eklezia mpe, mpenza mpenza, ya maye bilobama na encyclique Laudato si’, na lilendisi Laudate Deum mpe na Motu Proprio Fratello Sole ya Papá François, ya 21 ya sánzá ya motóbá 2024.

Boúmeli ya nzinganzinga ya mwángo mpe loléngé ya kosangisa makambo nionso elongo

Engebene na mibéko waná, botomboli ya mwángo ekotála mitindo ya boúmeli ya nzinganzinga na molayi ya bomoí ya bisáleli, lokolá bokitisi ya babobimisi, bosáleli na makási makoki ya mayi mpe ya nguyá, bobáteli ya mabelé mpe biténi ya nzinganzinga, na lokolá bokotisi misála na bilanga. Boyókani esálemi na ACEA eyanoli na likambo eye esengi mayéle mingi ya tekiniki mpe ya botámbwisi esika, eye esengi nzelá yokó  ya mosála eye ekosangisa makambo nionso elongo. Ya sóló, bisáleli bikeseni ya nguyá, ya mayi, ya nzinganzinga mpe ya elangá bikotálema, na lokolá boyókani káti ya bobimisi, ya bosáleli, bokambi makoki mpe bopési yangó motúya.

Ebongiseli ya mibéko mpe ya boyókani káti ya Italie mpe Ngwendé ya Sántu-Petelo

Ebongiseli ya mibéko ya ndakisa ya esika agrivoltaïque, na lokolá mabongisi ya bosáleli mwángo mpe ya bokangisi nzelá ya lotiliki, bibongisami na «Boyókani káti ya Ekóló Italie mpe Ngwendé ya Sántu-Petelo etáli esika yokó agrivoltaïque na Santa Maria di Galeria, esálemi na Roma na 31 ya sánzá ya sambo 2025», endimami na mobéko ya motángo 52 ya mokolo ya yambo ya sánzá ya minéi 2026, ebimaki na Lokásá ya Ekóló Italie n° 94 ya 23 ya sánzá ya minéi 2026.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

20 sánzá ya motóbá 2026, 14:44