2025.03.Santu Petelo 2025.03.Santu Petelo 

Bobáteli ya bána mike, lisoló ya yambo na Roma na likanisi ya Papá

Binama ya Commisio ya Papá mpe ya lisangá ya mokili mobimba mpo ya makoki ya moto basanganaki mpo ya mbala ya yambo na bozali na 15 mpe 16 ya sánzá ya motóbá, zambi ya kobánda bosálisani bokó na boluki kolendisa mikáno ya bobáteli o ntéi ya Eklezia mpe ya koyóka malámu mpe kokotisa baye bazua makámá.

JR Bompolonga – Kinshasa

Ezali na likanisi ya Papá Léon XIV nde ebándaka lisoló eye esálemi  -mpo ya mbala ya yambo na bozali- na Roma na 15 mpe 16 ya sánzá ya motóbá, káti ya Commisio ya Papá mpo ya bobáteli bána mike mpe ya lisangá ya basáli, Ending Clergy Abuse, eye emipesi na bobáteli ya makoki ya bána mpe ya baye bazua makámá. Basangani na likambo lyokó ya bansó, na bosálisani na Eklezia, zambi ya kosúkisa mabé bisálema na binama ya bonganga-Nzámbe.

Ezali bokútani boko ya yambo káti ya ekipi esálema na 2014 na Papá François mpe lisangá ya mokili mobimba ya bobáteli ya makoki ya moto, eye binama bayambanaka na Papá na sánzá ya zómi eleki, zambi ya kobánda bosálisani mpe kolimbola mikáno ya sóló elongo. Káti na yangó : kopésa bokébi bokó koleka na eye bato ya makámá mpe baye babika bayébi na boluki na bangó ya bosóló, ya bosémbo mpe ya bobongisi ; kolaka bomipesi mpo ya bobáteli bato bazangi makoki o ntéi ya Eklezia katoliko ; kolendisa ndéngé ya lisálisi mpo ya baye bakutana na mabé.

Misála

«Bosololi ya Roma ya bokónzi ya bobáteli» - «bosololi bokó ebongisami», lokolá liyébísi lyokó elimboli- esálemaki na Palazzo Maffei, esika ndáko ya Tutela Minorum ezali, mpe esangisaki binama mpe bamonisi ya Commisio ya Papá mpe lisangá ekelama na 2018 mpe esálaka mingi n’Amerika, na lokolá ya babáteli ya bato bazuaka makámá mpe baye babika «na molimo mókó ya boyóki, ya mokúmbá mpe ya bosálisani». Ezali mokónzi ya Commisio, Mgr Thibault Verny, oyo afúngolaki misála. Alobaki lisusu «lotómo ya Eklezia ya koyóka bato ya makámá mpe baye babika», na bobimisi ‘te «mpo ya kondimama, boyóki ená esengeli kozala ngalasisi yokó ekosálema na bobuti na mbano ya sóló».

Na ngambo na ye, mokambi ya lisangá Ending Clergy Abuse, Gemma Hickey -ye mei moto ya likámá ya mabé na Terre-Neuve-et-Labrador (Canada) mpe azali káti ya binama ya bokambi baye bayambamaka na Papá- abéngaki na «molimo mókó ya botáli makási, ya bolámu mpe ya elikya», na botiyi libosó «mokúmbá ekabolami» ya kobátela bána mike mpe bato bazangi makoki libosó ya mabé o ntéi ya Eklezia.

Makoki, bosémbo,  mokúmbá

Masoló ya mikolo miye mibalé bitálaki makoki ya bato ya makámá, mokúmbá ya misála ya letá, bosémbo mpe mibéko ya bobáteli, bisálemi na boyébi ya sémba yokó ya binama ya masangá mibalé. Basangani na lisoló balobaki lisusu matatoli ya bato ya makámá mpe baye babika bikoki kosálisa ya kobongisa malámu bapolitiki, misála mpe boyókani, na bolendisi «momeseno ya polélé mpe ya mokúmbá na bisáleli nionso ya Eklezia».

Mikánda ya mibéko ya sika

Commisio mpo ya bobáteli bána mike alakisaki na lisangá Ending Clergy Abuse, mikánda na ye ya mibéko ya sika, bibimaki na 13 ya sánzá ya motóbá mpe bindimami na Papá ad experimentum mpo ya mibú misáto. Alimbolaki lokolá mwángo mókó ya bobáteli elendisami mpe elakisami loléngé ya mokánda (rapport) ya mobú ekoluka kosálisana na bato ya makámá na botáli misála ya bobáteli o ntéi ya ba Eklezia ya bikóló. Lisangá epesaki nsango ya ekela ya bolobeli na ye bikoló zómi na minéi mpe na mikili (continents) mitáno mpe elobaki libongisi lyokó ya ntina : bondimi ya «mobéko mókó ya Eklezia ya mokili mobimba ya bondimi atá moke te mabé bisálema na bonganga-Nzámbe, elandaki ndéngé ya mibéko bindimama na Vatican n’Amerika». Libongisi ená, engebene na liyebísi ya masangá mibalé, «epési ntina mingi na mibéko ya polélé, mokúmbá mpe bolongoli ya libela na mosála ya Eklezia ntángo mabé mókó endimami to emonani na sima ya bolandi nzelá yókó elongobami na mobéko ya Eklezia ».

Kolekisa bobáteli mosika na bána mike

Kaka na eye etáli mabongisi, yókó ya ntina koleka -ezui lisálisi ya masangá mibalé- ezali ya «kolekisa» bobáteli mosika na bána mike, na bokotisi bato bazangi makoki, mpenza bamamelo, basángó, baí-likindo mpe binama ya masangá ya balaíki. Káti ya «mikakatano» ya ntina bilobamaki, tokoki kotánga na súka bandelo ya bonkoko, bosáleli bikeseni mpe bozangi makoki na bingúmba ya ndéngé na ndéngé.

Mikáno ya sóló

Na súka ya mikolo miye mibalé, mibéko ya sóló biyébani mpe bibongisami, mpo ya kokoba bosálisani eye epái na epái : kotombola lisoló na makanisi ya litómba ya mokili ya bondimi mabé atá mokó te libosó ya mbéba ; kokabola mabongisi milobami malámu bitáli mobéko ya Eklezia (droit canonique) mpe kolendisa bokási ya boyébisi na mokili ; kokolisa bokotisi ya masangá ya bato ya makámá/bato babikaki, mpenza na bingúmba bilakisami malámu te ; kotia ndéngé ya libela ya bosálisani mpe ya boyébisi ; koyika mpiko na mikakatano ya bonkoko mpe ya misála. Boyókani « ekokoba», na lisálisi ya mayéle bikotála kaka bato ya makámá/bato babiki mpe bikela ya sóló bikoluka kotónga « Eklezia yokó ya sóló» na mokili mobimba.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

17 sánzá ya motóbá 2026, 17:30