Atá bobángi, Ordre ya Malte epési lisálisi na bakristu ya Libá ya Sudi
JR Bompolonga – Kinshasa
Beyrouth ezalaki nanu na molili ntángo mituka zómi na mókó mpe mituka ya mike misáto bizalaki na molongó na nzelá. Israël eboyaki te kobeta Libá, atáko boyókani esakolamaki na Iran mpe Amerika. «Ezaleli ezalaki na bobángi makási», endimi mamá mokambi ya botomboli mpe boyébisi ya Ordre ya Malte ya Libá. «Ezalaki likámá lyokó libátelamaki mpo tozalaki bandingisa bilongobami», kasi eloko yokó te ekoki kolaka bokengi na 100% ya bikipi, ekobi Oumayma Farah, oyo ayébisi bisó basambelaki yambo mpe na nzelá ya «mobémbo molayi».
«Sudi ezali o ntéi ya Libá»
Moto ya Nordi ya Libá avandi pembeni ya Beyrouth, Oumayma Farah ayébi na makanisi eye akomona. Akolanda baréseaux sociaux mpe mosála ya bamédia, kasi «kotála na miso na ye mókó bobébisi nionso waná, ezali eloko mosusu». Na boleki sima ya ndelo ya langi ya mayi ya wolo etiamaki na makási na Israël, mpe na bokoti na ye baí-Libá bakomona lokolá esika yokó ya motane, molongó ya mituka emoni babalabala bibéba, «bitume ezali te, kaka putulu. Ezali lokolá tozalaki na esika yokó etumba», elobi mokambi ya Ordre ya Malte, libosó ya kobongisa ye mókó, «ezali esika yokó ya etumba». Ezaleli yokó eye etungisi mwási oyo ya Libá. «Sudi ya Libá ekabwana na Libá te, Sudi ezali o ntéi ya Libá», elobi ye.tuka
Na bokási ya likanisi liná ndé Ordre ya Malte elakaki koboya atá moke te kosálisa bato ya sudi, mpenza baye ya bituka ya bakristu.
Molongó ya mituka na mokolo ya minéi, ya mbala ya sambo úta ebándeli ya etumba na 2 ya sánzá ya misáto eleki, ezalaki ya loléngé esusu, etindami kaka mpo ya baloni, basáli ya bilanga mpe banyama mpe babokoli ya banyama. Batoni 200 ya bilei ya banyama bitondaki na mituka. «Ezalaki likambo lyokó ya ntina, mpo babokoli banyama bakokaki lisusu te kozua bilei ya banyama mpo ya bibwele mpe bokoti na bisika ya bozui bilei ebébaki likoló ya etumba», elimboli Oumayma Farah. Ezalaki mabé mpo ya banyama -bokólóngóno ya bibwele ekómaki na likámá- kasi lokolá mpo ya bato ya Rmeich, Aïn Ebel mpe Debel. «Mbano ya nkita na bangó ekitaki, mpe bakokaki te kolaka malámu te bobimisi ya mabelé, ya fromage mpe nyama ya lisangá ya bangó», ekobi mamá mokambi ya botomboli ya Ordre ya Malte.
«Kosálisa bangó, loléngé ya bisó ya kobunda»
Na ndéngé mókó ya mosála esálemi na ntómá ya Papá na Libá, mpe na ndéngé ya bobakisi, Ordre ya Malte ekopesa kúna lisálisi kaka ya bomoto, bilei, mino, masálisi ya yambo, na bato ya misála bazuamaka kaka waná.
Kosálisa bangó na botindi biloko úta Beyrouth «ezali loléngé lyokó ya kolakisa bosálisani na bisó» na mibáli mpe bási waná, baye «bazali bilombe ya sóló». Na bomemeli bangó makoki ya kobika mpe ya kotikala, «ezali lokolá loléngé lyokó mpo ya bisó ya kobunda mpo ya bobáteli ya ekóló na biso», elobi Oumayma Farah.
Na bozongi na Beyrouth na nzelá yokó molayi koleka ya kokende, binama ya bikipi basambelaki mpo kotonda Nzámbe ya bozongi na nzóto kolóngóno na bandáko na bangó. «Mwá ngonga moke sima bozongi na bangó, bitumba bibándi lisusu»
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.