Luka

Bolapi ndai moko ya kala na Vatican Bolapi ndai moko ya kala na Vatican  (Vatican Media)

Na 6 ya sánzá ya mitáno, balikili ya sika 28 mpo ya Garde suisse

Papá Léon XIV akozala na bolapi ndaí na 6 ya sánzá ya mitáno, mokolo ya bokundoli mobúlú ya Roma ya 1527, eye bagarde suisse 147 bawáka mpo ya kobátela Papá Clément VII nzokándé 42 basusu balongaka kobomba ye na château Sántu-Ange. Molúlú ekoleka na ngonga ya 17, na libandá Sántu-Damase ya Ndáko ya bontómá, na Vatican.

Vatican News

Na 6 ya sánzá ya mitáno, balikili ya sika ya Garde suisse ya papá bakolapa ndaí ya «kosálela na lobokó, na sémba mpe na lokúmu» Papá. Na mokolo eye ya bokundoli mobúlú ya Roma, esálemaka na 1527 mpe na ntángo ená bagarde suisse 189 babátelaka Papá Clément VII libosó ya limpinga ya Charles Quint, balikili 28 ya sika bakolapa ndaí na eleko na bangó. Molúlú ekoleka na ngonga ya 17 na libandá Sántu-Damase ya Ndáko ya bontómá, na Vatican. Sóki ntángo ya mabé, ekosálema na ndáko Polo VI.

Garde mókó mókó akokáta seleka, na bendele ya Lingómbá ya Garde suisse ya papá mpe libosó ya Papá Léon XIV, ya kobátela mpe kobundela Papá oyo azali na mosála mpe bakitani na ye bansó ya sóló, atá na bobungisi bomoí na ye, lokolá bagarde basusu basálaka yangó na kála. Ekozala eleko yókó ya esengo. Bagarde bakoláta «Gran Gala», elingi koloba uniforme ezali na bondóki eye elatámaka mpo ya bobenisi ya Papá «Urbi et Orbi», na Mbotama mpe na Pasika.

Linaka

Yambo ya molúlú ya bolapi ndaí, na 5 ya sánzá ya mitáno, misa ya Vêpres ekosálema, na ngonga ya 17, na ndáko-Nzámbe Santa Maria della Pietà in Campo Santo Teutonico. Ekolandama na botiki nkáta na lokúmu ya baye bazuaka makámá na 6 ya sánzá ya mitáno 1527 mpe ya bopesi biloko ya lokúmu. Mokolo ya bolapi ndaí, na 6 ya sánzá ya mitáno, na ngonga ya 7 na ndambo, episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá Pietro Parolin akosála misa na basilique Sántu-Petelo.

Batindami ya Suisse

Batindami ya ekóló suisse bakozala waná, bakokambema na mokambi ya ekóló Guy Parmelin, mokónzi ya Conseil national Pierre-André Page, mpe mokónzi ya Conseil des États Stefan Engler. Limpinga ya suisse ekolakisama na mokónzi ya limpinga, commandant de corps Benedikt Roos, nzokándé Lisangá ya baepiskopo ya Suisse ekolakisama na mokónzi na ye, Mgr Charles Morerod, episkopo ya Lausanne, Genève mpe Fribourg. Batindami ya canton Thurgovie bakokambema na Conseil d'État eye ekambemi na mokambi ya Conseil d'État Dominik Diezi.

Limpinga ya kála koleka ya mokili

Garde suisse ya Papá ezali limpinga ya kála koleka ya mokili. Esálema na 22 ya sánzá ya yambo 1506 na Papá Jules II, ezali na mokúmbá ya kobátela Papá mpe ndáko na ye. Ekambemi na colonel Christoph Graf, ezali na etindá ya kotála bisika ya bokoti na Vatican mpe Ndáko ya bontómá, ya kopesa kimia mpe kosála misála ya motindami o eleko ya milúlú ya Papá mpe ya baboyambi ya Letá, na lokolá kobátela Lisangá ya baepiskopo ya lokúmu o eleko ya boluki Papá ya sika. Lingómbá ezali na bagarde baútaka na bituka nionso ya nkóta ya Suisse, mpenza ya ba canton ya Valais ya Tessin to lisusu ya Lucerne.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

05 sánzá ya mítáno 2026, 10:56