Mpo ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, bosáleli na boboto nguyá ya nucléaire ezali na ntina
Vatican News
Ngwendé ya Sántu-Petelo ekébisaki 'te boluki lisálisi ya sika ya bobóyisi nucléaire, bokomisi ya sika bobombi mindoki mpe misála ya mampinga na intelligence artificielle bikokotisa mokili na nzelá yókó ya mabé koleka lisusu. Na bolobi o eleko ya bosololi lya bansó ya Liyangani ya botáli ya mbala ya zómi na mókó ya Boyokani etáli boboyi ya bopalinginyi mindóki ya nucléaire na ONU na New York, Etindá ya botáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ebengaki ezalela ya sik’oyo ya «mabé koleka». Na eleko yókó ya bobéndani koleka káti na bikóló mpe ya bolembisi bisaleli ya botáli mindóki, batindami balobaki makanisi na bangó libosó ya bozongi ya lisikulu lyokó ya nucléaire, mpenza ba bobángisi bisangani na bosáleli mpe na bomeki ekoki kosálema ya mindóki ya nucléaire.
Botiki bokó ya bomáti ya bontómá ya bikóló ebelé
Na botángi Papá Léon XIV, Etindá ya botáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alelaki botiki bokó ya bontómá ya bikóló ebelé, na bolobi 'te bontómá bokó esálema na lisoló mpe boyokani ekómi kokitana na bontómá bokó «esálema na bokási». Batindami batiaki libosó mobúlú biúti kosálema na bisika bizali na nucléaire lokolá elembo yókó ya bokwéisi mibéko misálema kála biye bikolaka bobateli na mokili. Likanisi lyokó ya ye mókó elobamaki etáli mosála ekokola ya intelligence artificielle na bozui mokáno etáli nucléaire. Ngwendé ya Sántu-Petelo akébisaki 'te misála ya loléngé waná bikokitisa ngonga ebongisami na likanisi ya moto o eleko ya likámá, na bomátisi bongo «likámá ya mbéba ya botáli» mpe na bokundi kilo ya litéya ya boponi ya bomoí to ya liwa.
Bobotoli mindoki, bobóyisi, bosáleli na boboto nguyá ya nucléaire
Na bobimisi motindo ya ntina ya Boyókani ya boboyi bopalinginyi mindoki, Etindá ya eleko insó ya botáli ya Ngwendé ya Sántu-Petelo elobaki 'te makonzi misáto ya ye -bobotoli mindoki, boboyi bopalinginyi mpe bosáleli na boboto nguyá ya nucléaire- bitikalaki ya ntina ya boboto mpe ya bobateli ya mokili. Na eye etáli bobotoli mindoki, elobaki 'te mobéko VI epesaka lotómo mókó ya kosálela na makási mpo ya komema masoló zambi ya botiki mindóki ya nucléaire. Lotómo liná, elakisaki Ngwendé ya Sántu-Petelo, ezali úta leló ya lombango koleka, nzokándé bikóló ya makási ya nucléaire bakokómisa ya sika bisika na bangó ya bobombi mindoki mpe bakokolisa matéya na bangó ya bobóyisi. Mitindo waná bikoki kolendisa «likambo lyokó eye ezali na bosáleli mpe na mayéle ya koboya». Na bobakisi 'te boluki lisálisi ya bobóyisi, ekolakisa «likambo lyokó ya bobateli esálema na bolembu ya mókó mókó esungami na bobángi ya bokási na esika ya sémbo mpe botiyi motéma».
Maye ya mabé bikokóma mpo ya bato
Na bolobi maye ya mabé bikokóma mpo ya bato na mindóki ya nucléaire, Ngwendé ya Sántu-Petelo azongelaki bolendisi na ye na Boyokani ya bopekisi mindóki ya nucléaire, na bolobi 'te yangó eye ekolendisa mwángo ya litéya mpe ya mobéko ya bobotoli mindoki.
«Boboto ekoki kovanda na bobángi te»
Na eye etáli bosáleli na boboto ya nguyá ya nucléaire, Ngwendé ya Sántu-Petelo elobaki lisusu lotómo ya Bikóló ya kotombola technologie ya nucléaire mpo ya makambo ya boboto, engebene na ntómo, na bosakoli bosáleli na yangó na bokólóngónó, na bilanga, na bobateli boléi mpe bobáteli nzinganzinga. Na bokundoli lisusu mbela ya Papá Léon XIV mpo ya «boboto bokó ezanga mondóki mpe ebotolaka mondoki». Boboto ya sóló, ekoki kovanda na bobángi te. Esengeli esálema na «botiyi motéma, lisoló mpe boyébi ya bomoto na bisó ya lisangá».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.