Matéya ma Boyambi eyanoli na vademecum etáli bobenisi n'Allemagne
Vatican News
Mokánda ya episkopo ya lokúmu Víctor Manuel Fernández, ya 18 ya sánzá ya zómi na mókó 2024, etáli mwángo ya vademecum ya baepiskopo y'Allemagne ya bobenisi boyókani o libandá ya libala, etikali eyano yókó ya malonga lokolá mpo ya lokásá na nkombo "bobenisi ekopésa bokási na bolingo", endimama na súka na batindami ya Lisangá ya baepiskopo y'Allemagne mpe na Likita lya ntina ya ba katoliko y'Allemagne na sánzá ya minéi 2025.
Préfet ya dicastère mpo ya Matéya ma Boyambi alobaka polélé na Mgr Stephan Ackermann, episkopo ya Trèves mpe mokambi ya Commisio mpo ya litéya ya milúlú mpe nsámbo ya misa ya Lisangá ya baepiskopo y'Allemagne, o eleko ya bokútáni na bangó ya súka na 12 ya sánzá ya zómi na mókó elekaki na Vatican na baepiskopo y'Allemagne.
Lotómo ya kopekisa loléngé nionso ya molulu
Préfet asembolaki kála 'te mokánda ená ya 2024, ebimaka mikolo mileki na site ya dicastère na bondimi ya Papá Léon, ezalaki lokolá «eyano yókó mpe ya súka» na mokánda ya súka endimama na sánzá ya minéi 2025. «Eye elobami na mokánda ená ekokani na mokánda ya vademecum ya sik’oyo eye ezua bondimi ya dicastère mpo ya Matéya ma Boyambi» te, elobi episkopo ya lokúmu préfet na Vatican News.
Sóki mokánda ya súka ebongwamaki na botáli mwángo ya ebándeli, ezongeli ya sóló eye ekomama na mokánda ya 2024 te. Atáko elobi lombango mpe bonsómi etáli bobenisi mpo ya balongani babalani te, ekobongisa loléngé lyokó ya litéya ya milúlú mpe nsámbo ya misa, eye elongolami na nsakola Fiducia Supplicans ya sánzá ya zómi na mibalé 2023. Okoki kotánga na nsakola ená 'te «eye etáli bobenisi, Eklezia azali na bosémbo mpe na lotómo ya kopekisa loléngé nionso ya molúlú» ekoki komema mokakatano na likambo ya libala.
Bobéngi lisusu ya Papá Léon XIV na 23 ya sánzá ya minéi
Na pépo eye ezongisaki ye na Roma sima ya mobémbo na ye ya bontómá na bikóló minéi y'Afrika, na 23 ya sánzá ya minéi elekaki, Papá ayanolaki na motuná mókó na likanisi ya kobongisa bobenisi ya balongani ya bási na bási to mibáli na mibáli n'Allemagne, na bolobi: «Ngwendé ya Sántu-Petelo asololaki na baepiskopo y'Allemagne. Ngwendé ya Sántu-Petelo esémbolaki 'te toyókani te na bobenisi ebongisami ya balongani na ezaleli ya mabé, koleka eye, sóki tokoki koloba, endingisamaki na Papá François».
Mokolo ya mibalé na mpokwa, na motuná ya bapanzi nsango, episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá amonaki «mbango mbango» ya kokanisa bokoti bokó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya baepiskopo y'Allemagne na likambo ya bobenisi balongani ya babáli to ya bási. Sik’oyo, tozali na «lisoló», «Tokotála nini ekoleka». Mokáno etikali ya Papá, «kasi atá ndéngé nini, tobándaki kála lisoló lyokó na likambo yangó, mókó mókó akoloba likanisi na ye». Mpo ya Secrétaire ya Letá, ekoki kosálema «kozua boyókani bokó» eye ekosangisa makanisi ndéngé na ndéngé, na káti waná likambo-likonzi ya Synode, esengeli koyéba «'te mokáno nionso esengeli elongobana na droit canon, na Concile Vatican II mpe na momeseno ya Eklezia».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.