Litéya ma Boyambi epái ya Bondeko Sántu-Pie X: bokulisi ya baepiskopo ezali ekela yókó ya bokabwani
Vatican News
Bondeko ya bonganga-Nzámbe Sántu-Pie X, ekelama na episkopo Marcel Lefebvre, atá bobéngi ebelé ya Papá, asakolaki likanisi na ye ya kokangama na mwángo na ye ya kokulisa baepiskopo ya sika na ndingisa ya Papá te na sánzá ya sambo. Episkopo ya lokúmu Víctor Manuel Fernández, préfet ya dicastère mpo ya Litéya ma Boyambi, na eyano ya mituná mingi azuaki, abimisi mokolo ya misáto nsakola yókó ya sika, sima ya boyébisi yangó na Léon XIV. Papá alingaki kolakisa mpósá na ye ya kokoba kosámbela mpo 'te ekela eye ya sika ya bokabwani esálema te.
«Nokozongela eye nasila koloba», elobi episkopo ya lokúmu. «Bokulisi baepiskopo esákolami na Bondeko ya bonganga-Nzámbe Sántu-Pie X ezui ndingisa ya Papá te. Likambo eye ezali ekela yókó ya bokabwani (Yoane-Polo Il, Ecclesia Dei, n⁰3), mpe "boyíngeli na bokabwani ezali botúki bokó makási na Nzámbe mpe ezali na bobéngani na Eklezia ekokomama na mobéko ya Eklezia" (ibid., 5c; cf. Lisangá ya Papá mpo ya mikánda ya mibéko, Lokasa ya bolimboli, 24 ya sánzá ya mwambi 1996)».
«Tatá-Esántu», elobi préfet na bosúkisi nsakola na ye, «akokoba kosámbela mpo 'te Elimo-Sántu epelisa bakambi ya Bondeko ya bonganga-Nzámbe Sántu-Pie X zambi batika nzelá waná ya bozui mokáno ya mabé koleka».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.