Mgr Gallagher pembeni ya Mgr Sommertag, ya  episkopo ya lokumu Gomes Furtado, Mgr Mendes Tavares mpe Mgr dos Santos Lopes Fortes. Mgr Gallagher pembeni ya Mgr Sommertag, ya episkopo ya lokumu Gomes Furtado, Mgr Mendes Tavares mpe Mgr dos Santos Lopes Fortes.  

Ezali kaka na Nzámbe ndé moto abátelami, elobi lisusu Mgr Gallagher

Na mobémbo na Cap-Vert o eleko ya bokundoli mibú 50 ya boyókani ya ekóló na Ngwendé ya Sántu-Petelo, secrétaire mpo ya Boyókani na ba Letá mpe masangá ya mokili asálaki misa mokolo ya eyenga 10 ya sánzá ya mitáno na paloise Nossa Senhora da Graça, na Praia, mboka-mokónzi. Na litéya na ye, alobaki 'te bobateli ebotami na mondoki te, kasi na botiyi motéma na Nzámbe mpe na bolingo na ye.

JR Bompolonga - Kinshasa

Mpo ya kozua «kimia ya sóló» eye mokili ezali na «mpósá mókó ya bobwaki elikya», esengeli kokundola 'te bansó bazali bána ya Tatá kaka waná mpe 'te bansó bazali bandeko na bomoto, elobaki Mgr Paul Gallagher mokolo ya eyenga eye o eleko ya misa esálemaki na ndáko-Nzámbe Nossa Senhora da Graça, na Praia, na Cap-Vert. «Likanisi ekoloba tozali na bokengi koleka kaka tosimbi mindoki ezali lokutá», mpo «ezali kaka na nguyá ya Nzámbe ndé tokoki kozala mpenza na bokengi», elobaki Mgr Gallagher na litéya na ye.

Mpo ya bobáteli ya lokúmu ya bato

Na mobémbo na ekóló esangá ená y'Afrika kinó 14 ya sánzá ya mitáno, o eleko ya bokundoli mibú 50 ya boyókani ya bontómá, Mgr Gallagher azongelaki lisoló ya boyókani káti na Cap-Vert mpe Ngwendé ya Sántu-Petelo, na bolobi lisusu na litéya na ye bondimi káti ya bikóló na botiyi mokoloto na 2013, eye esangisaki «bosálisi bokó bolayi» káti ya Letá mpe Eklezia ya ekóló. Leló, ekomonana mingi na makambo ya botéi mpe ya lisálisi, atáko sóki «masoló bikosálema mpo ya bosáleli yangó bikosunga ya kolendisa makási na mobéko (statut) mpe bozali ya Eklezia na lingómbá ya Cap-Vert», elobaki ye.

Mgr Gallagher alobaki lisusu likoki-lotómo ya Eklezia ya «kobimisa liloba lyokó ntángo makoki ya ntina mpe lokúmu ya moto bikómi na matata», mingi mpenza na mwinda ya «bopési ya malonga» ememami na botomboli ekóló kaka na mibú miúti koleka te, kasi úta bikeke, «pámba 'te dioceze ya Santiago ya Cap-Vert ekosepela kála te mibú 500».

Mokambi ya misa alobaki na sima «misála bébóo ya likabo» na nzelá waná ndé Eklezia «akosálisa baye bazangi makoki» na káti ya etindá ya Kristu mpe ya «nsango elámu ya lokúmu ya moto mókó mókó, mingi mpenza bobolá». Etindá yókó ekoki kosálema na «bonsómi elakami na Letá», ebakisaki ye, na bolobi «botondi na ye ya sóló» na bakambi ya ekóló mpo ya «bosálisi na bangó elámu» mpo ya bána bansó ya ekóló.

Bosálisi bokó ya makási esálema na botósani

Mgr Gallagher atiaki libosó boúmeli ya basinga káti ya bikóló mibalé; basinga bizua elembo ya «botósani» mpe balakeli ya «bosálisi ya makási». Eloko ekolukama na súka, ekobaki ye, etikali «mosála ya moto, zambi akoka kosálela makoki na ye na mobimba mpe kosilisa malámu ntómo na ye». Na botéi litángi ya mokolo, ezuami na Nsango-Ndamu ya Yoane (14, 15-31) etáli lisikulu ya Yézu na bayékoli na ye o eleko ya Bokaboli lipa ya súka, Mgr Gallagher alobaki 'te bolingo ekobota bolingo mpe 'te bokengeli ya mibéko ezali eyano na bolingo ofele ya Nzámbe, eye ekosopanela «biso na botáli bolembu na bisó te, ya bozangi na bisó mpe ya masumu na bisó te». Kaka bongo, ebakisaki ye, «bolingo ya Nzámbe esangisi bisó na singa yókó ya lobokó, ya bolingi mpe ya lisangá», mpe, na botángi moto ya mayéle ya Eklezia sántu John Henry Newman, Mgr Gallagher asúkisaki 'te «Nzámbe azali bolingo mpe akelaka bisó na elili na ye mpe na bokokani na ye; esáli bongo, kolinga ezali na káti ya bomoto na bisó».

Babéngami ya kobika na bolingo

Na bolingo ená, Eklezia ayanoli «na nzelá ya etindá na ye, ya libosó na nsakola ya bosóló ya Nsango-Ndamu, na sima ya ekela na ye», mingi mpenza «na makambo ya botéi, ya bokólóngónó mpe ya mosála mpo ya bato», ekobaki episkopo, «kaka mpo ya kozua matómba ya bileko te», esémbolaki ye, kasi «mpo ya litómba ya bato bansó». Ezali waná ndé, etungisami na «botomboli ya moto mobimba», Eklezia ekotéya mobéko ya «esika ya bosúkí ya mokili» ya biloko mpe elobi likoki ya móķó mókó ya kokóma «biloko bisengeli na bomáti na ye». Ezali «bopési litómba te», kasi «likoki lyokó ya mokili, ekangama na lokúmu ya moto, eye ezali yambo ya mobéko nionso ya bosémbo», eye ngalasisi ekosenga molongó mókó «sémbo, esálema na mibéko bikabolami na ekóló mpe na mokili mobimba». Sóki, na bokeli mpe na bokómi moto, «Nzámbe alakisaki bolingo na ye», na liwa mpe Nsékwa ya Kristu, Apesaki waná «elembo ya koleka»: babéngami ya kobika na bolingo, eye ekomilakisa ya sóló na botosi. Mpe, sóki Mokónzi alobaka te ya bomoí bokó «ezanga mabaku ezanga pási», alakaka lokolá 'te «akotika bisó te, bitike te», mpe alakaka likabo ya boboto, eye «ezali kaka bozangi ya bitumba to ya makambo, kasi ya mobimba elámu ya bomoí mpe ya malámu», asúkisaki Mgr Gallagher.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

12 sánzá ya mítáno 2026, 13:53