Episkopo ya lokúmu Parolin: Léon XIV akokoba nzelá na ye mpe akotéya boboto
Vatican News
«Papá akokoba nzelá na ye, elingi kooba kotéya Nsango-Ndamu, kotéya boboto -lokolá sántu Polo alobaki- "na libakú nionso, ya malámu to te"». Waná elobaki episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá, Pietro Parolin, o eleko ya bosepeli mibú 70 ya "Casa Sollievo della Sofferenza", lopitalo ya Sántu Yoane ya Rotonde. Episkopo ya lokúmu ayanolaki na mituná ya bapanzi nsango baye balobaki «mobúlú mókó ya sika" na ngambo ya mokónzi y'Amerika, Donald Trump, epái ya Léon XIV, mikolo mibalé yambo ya likita na Vatican ya secrétaire ya Letá y'Amerika, Marco Rubio. «Atá libosó ya mobúlú ená ya sika, nayebi te sóki Papá akozua libakú ya koyanola», elobaki episkopo ya lokúmu, «mpo libakú ená -ebakisaki ye na botáli biyano ya Léon XIV na pépo na 13 ya sánzá ya minéi eleki, mokolo ya bokéi na ye N'Afrika- ezalaki bokútáni na bapanzi nsango. Kasi ndelo etikali ndéngé waná».
Eyano ya bokristu
«Papá ayanolaki kála, nakobakisa eloko te», elobaki lisusu Secrétaire ya Letá, na bobakisi 'te eyano ya Léon XIV ezalaka «eyano yókó ya bokristu koleka, na bolobi 'te akosála eye mosála na ye ekosenga, ezali kotéya boboto. Yangó esepelisa to te, ezali lisapo esusu -elobaki ye-, tokososola 'te moto nionso azali na nzelá kaka yókó te. Kasi yangó ndé ezali eyano ya Papá».
Etamboli ya "Casa Sollievo della Sofferenza"
Mituná bitunámaki lokolá na Parolin bitáli ndéngé ekokoba nzelá ya pási ya "Casa Sollievo della Sofferenza", eye ezali na matata mókó na lokolá bokáti mosála mpe bobimi na balabala ya basyndicat. «Boni boni yangó ekoki kokoba? Engebene na mibéko ya lopitalo nionso», elobaki episkopo ya lokúmu. «Ezali na mibéko biye bisengeli kotosama, eloko ya sika ezali te. Esengeli sik’oyo 'te móķó mókó amema lisálisi na ye mpo ya mibéko mina, mibéko yangó, bikoki bisálelama. Esengeli koleka minyoko biye bizali, bizali na esika nionso ya bokólóngónó bwa nzóto». «Toyébi malámu -ekobaki episkopo ya lokúmu- 'te ntángo makambo ya pási mpe ya makámá bizali, ya ntina ezali kotambola bansó na bokambemi bokó. Waná ndé likamwisi, likambo ya kokoka kozala bansó lisangá mpo ya kokóma na makambo tozali koluka».
Lisusu, elobaki episkopo ya lokúmu, na lopitalo ya San Giovanni Rotondo, «ezali na motúya ebakisami», mpe ezali «likambo 'te Ndáko ená elingamaka na Padre Pio mpe 'te Padre Pio akokoka kotika yangó te. Alobi 'te ezali mosála ya Nzámbe, asáli eloko te... Úta likoló, akokoba kobátela mpe kokengela eloko eye ezali ya ye».
Bokútáni na basyndicat
Sima ya nzanga, Secrétaire ya Letá asengelaki lokolá kokutana na batindami ya basáli basyndicat: «Nakoyóka bangó na yambo», elobaki ye. «Nalingi koyóka eye balingi koyébisa ngai mpe, na loléngé ya mituná na bangó, nakobongisa biyano na ngai. Liloba ezali eye toúti kokundola: mókó mókó engebene na likanisi na ye mpe ya makoki na ye, tomeka kosála bansó na lisangá mpo 'te eloko eye ya ntina ekoka kozala eye ezalaka».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.