Luka

Episkopo ya lokumu Parolin akopesa komunyo na Ministre wa yambo ya Haïti na 9 ya sanza ya mitano Episkopo ya lokumu Parolin akopesa komunyo na Ministre wa yambo ya Haïti na 9 ya sanza ya mitano  (@VATICAN MEDIA )

Episkopo ya lokúmu Parolin asáli misa mókó mpo ya boboto na Haïti

Úta basilique Sántu-Maria Monéne na 9 ya sánzá ya mitáno, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alendisaki ya kotikala malili te libosó ya minyoko ya mokili: «Nzámbe akoyóka bogangi ya bato ya makámá bansó ya bozangi bosémbo mpe ya bobolá», na káti waná baye, na ekóló ená ya Caraïbes, «balingi bomoí bokó ezua bonsómi na mobúlú».

JR Bompolonga - Kinshasa

«Boboto ekónza ntángo insó Haïti». Waná ezali mpósá eye ekomata libosó ya malili ebotami na minyoko ya bato ya Caraïbes mpe ya basusu na mokili, bato ya makámá ya bitumba mpe ya boteki bato: makambo mibalé miye, biúti na matomba ya bato bangó mókó mpe ya bozangi bomoto, bikobébisa masangá mibimba. Ezali na maloba maye ndé episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, alobaki súka ya mobúlú na Haïti o eleko ya misa mókó esálemaki sima ya zanga ya 9 ya sánzá ya mitáno, na chapelle Sforza ya basilique Sántu-Maria Monéne. Ministre wa yambo ya ekóló, Alix Didier Fils-Aimé, ayambamaki na ntongo na likita na Papá Léon XIV, azalaki lokolá na misa.

Likámá na Haïti

Úta 2021, Haïti ekobundana na likámá yókó esangani na mobúlú ya babomi bapomba. Batángi bato milio 1,4 bakimi likoló ya bituluku bizali na mindoki baye bakonyokola ekóló úta mibú ebelé. Engebene na esalelo ya ONU etálaka makoki ya moto, kaka na 2025, koleka bato 5 500 babomaki bangó mpe koleka 2 600 bazokaki. Mitúya bikolimbola bosóló bokó elobamaki na episkopo ya lokúmu na litéya na ye, na lokota ya lifalanse: esengeli na boboto bokó eye «ezali mokili ekopésa bisó te», mingimingi esengisami na «mobúlú mpe na lokutá».

Episkopo ya lokumu Parolin na Ministre wa yambo ya Haïti
Episkopo ya lokumu Parolin na Ministre wa yambo ya Haïti   (@VATICAN MEDIA)

Likabo ya yambo ya Mosekwi

Boyokani elobami na episkopo ya lokúmu ezali eye elingamaka na Yézu, na yangó «amilakisaka libosó ya lisangá ya eklezia sima ya Nsékwa», na bolakisi matambe ya yambo ya lisangá ya bandimi. Ezali bôngó «likabo ya yambo» ya Mosekwi mpe «elembo ya bozali». Koyamba ye, elimbolaki episkopo ya lokúmu Parolin, ekotisi etindá ya kotónga engúmba. «Esika ezali Kristu, boboto ekokónza». Boyókani bokó eye «ekoki kopésama na makási te»,  kasi ebongisami mpe eyambami na bosóló na mókó mókó.

Mpósá ya boboto ya mokili

Boboto ekangani na bozangi bitumba kaka te, kasi ezindisi misisa na ye «na boyambi ya Kristu mpe na lokúmu ya moto», na bolobi lokolá na baye bandimaka te. «Na botáli ezaleli ya mokili leló», elobaki Parolin, «tokoki bansó koyéba ndéngé nini mokili na bisó ezali na mpósá ya bozali ya Nzámbe mpe na likabo ya boboto».

Nzámbe ayokaka mabóndeli

Libosó ya makambo ya mawa, episkopo ya lokúmu alukaki komema bolendisi bokó: «Nzámbe ayokaka bogangi ya bato bansó ya makámá ya bozangi bosémbo mpe ya bobolá baye, bisika nionso ya mokili, bakomatisa epái na ye mabóndeli na bangó». Bolingi ya baye, na Haïti, balingi «bovandi lisangá eye mobúlú ezali te, epái wápi bakoki kobika lokóla bandeko ya babáli mpe ya bási» bikotikala kozanga eyano te.

Bomipesi ya ntina ya lisangá ya bikóló

Eleko eye ya pasika, ekobaki secrétaire ya Letá, ekobenga bisó ya kongegisa bozali ya Kristu, na bopési liloba na baye bazali na pási na kimia mpe na bokotisi baye bansó tokokutana na bangó na balabala, «na boponi te», zambi «mokili endima Nzámbe oyo apésaka boboto». Etindá yókó ya enéne koleka eye ekosenga bomipesi ya lisangá ya bikóló mpo ya bolámu ya bansó, mosika na «bandelo, ya mimeseno ya biyamba mpe ya bonkoko». Bomipesi bokó lisengeli mpo, ebakisaki episkopo ya lokúmu, «tozali bansó bandeko, tozali na mikumba bipái na bipái».

Kolaka bosémbo na botosi ya mibéko

Mókó mókó abengami bôngó ya komema mikumba na ye, na bomipesi ya kozongisa bobémbani (harmonie) mpe na bosáli mpo ya bosémbo «na botosi mibéko mpe makoki ya moto», na boluki «bolámu ya koleka ya ekóló na nzelá ya botongi lisusu bisáleli mpe bosáleli ya bansó ya makoki bikolaka na baí-mboka bomoí bokó ya malonga».

Boboto na lobí ekoya

Secrétaire ya Letá azongelaki maloba ya Papá Léon XIV o eleko ya mobémbo na ye na Maqam Echahid, Ekeko ya bokanisi bamartíro y'Algérie, o eleko ya mobémbo na ye ya súka ya bontómá, alobaka «Nzámbe alingi boboto mpo ya ekóló mókó mókó» mpe 'te boboto yangó ekoki kosálema kaka na bolimbisi. «Etumba ya sóló mpo ya bonsómi ekolongama na súka ntángo boboto ya motéma ekozuama», elobaki Mgr Parolin. «Lobi ekoya ezali ya babáli mpe bási ya boboto»

Losámbo mpo ya baye batikali na mosála

Litéya esilaki na bobonzi na Maria baye bansó, na Haïti, «bakopésa eye ya ntina ya bangó na mosála ya baye balembi koleka», epái wápi «mobulú ekolakisa elongi na ye ya mabé koleka». Episkopo ya lokúmu alobaki lokolá baepiskopo, basángó mpe basáli ya Nzámbe baye bakokoba etindá na bangó ya mobateli na ekóló, «na lokolá babáli mpe bási ebelé ya motéma malámu baye, na mikumba na bangó ndéngé na ndéngé, basosoli 'te kolanda Mosekwi elingi koloba kosála na bopemi te mpo ya boboto, na komibosana bangó mókó mingimingi».

 

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

11 sánzá ya mítáno 2026, 13:04