Luka

New York, esika ONU ezali New York, esika ONU ezali 

Bobotoli mondoki, nzelá kaka yókó mpo ya boboto ya sóló, elobi Ngwendé ya Sántu-Petelo

Lisikulu elobamaki na Etindá ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na ONU na New York o ntángo ya Liyangani ya mbala ya zómi na mókó ya botáli Boyókani ya bopalinginyi mindóki ya nucléaire te, elobi 'te «bosilisi ya mindóki ya nucléaire nionso» ezali «mokúmbá mókó ya ntina eye ekosenga mikáno ya sóló mpe ya ntina».

Vatican News

Boboto bokó ya sémbo, ya sóló mpe ya libela ezali na likonzi kaka lyokó: bobotoli mondóki. Nzelá lisengeli mpo ya kokóma waná, mpe mpo ya kokóma na bosilisi mindóki ya nucléaire nionso, epesami na Boyókani ya bopekisi mindóki ya nucléaire. Yangó waná Ngwendé ya Sántu-Petelo ebengi Bikóló binsó baye nanu basála yangó te ya komikotisa, na bokangi o ntéi ya likanisi «maye ya mabé bikokóma mpo ya bato mpe mpo ya nzinganzinga bosáleli mindóki ya nucléaire», biye bikozala «na makambo ya bobébisi mpe ya makási koleka, na boleki ba ndelo ya bikóló mpe ya bato». Liséngi eye epesamaki mokolo ya mitáno ya yambo ya sánzá ya mitáno na Etindá ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na ONU na New York, o eleko ya Liyangani ya mbala ya zómi na mókó ya Boyókani ya bopalinginyi mindóki ya nucléaire te, eye ekosálema úta 27 ya sánzá ya minéi kinó 22 ya sánzá ya mitáno.

 Makoki ya boboto bokó bwa sékó

«Na eleko yókó eleko kani makambo ya ntina ya bobáteli mokili bizali na bobéndani bikomata», ekundoli Ngwendé ya Sántu-Petelo, esengeli «kotála 

 makoki ya ntina mpo ya boboto ya sékó». Bobotoli mondóki ya nucléaire ekoluka koleka «ndakisa yókó ya bokengi ekelama na bobángi, bobángisi ya bokási mpe ya bokobi ya bobébisi ngambo na ngambo», eye ekoki kozala atá moke te «likonzi lyokó ya botélemisi mpe ya libela mpo ya boboto». Ngwendé ya Sántu-Petelo ekotála eye ekobenga «ba nzelá ya motungisi», lokolá «bobimi lisusu ya liloba ya nucléaire, bokoli mpe bokomisi sika bisika ya kobomba mindóki ya nucléaire, na etamboli ya matéya ya bobángisi na loléngé lyokó eye ekoki kokitisa bandelo ya bosálisi». Na waná ebakisami bokwéisi ya boyókani ya botáli mindóki mpe ya bobotoli mondóki, «biye bisálisaki eleko molayi na botélemisi, na polélé mpe na botiyi motéma».

Kosilisa mindóki ya nucléaire

Bosilisi ya mindóki ya nucléaire nionso, engebene na likanisi ená, «ezali mpósá mókó ya mosika te, kasi mokúmbá mókó ya ntina eye ekosenga mikáno ya sóló mpe ya ntina, na boluki kokotisa boboto bokó ya sémbo koleka, ya sóló koleka mpe ya sékó koleka». Na bobimisi litungisi ya ye libosó ya «bokotisi na lombango ba technologie ya sika, na káti waná intelligence artificielle, na mitindo ya nucléaire», etindá ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na ONU elobi bôngó «lisengeli ya komatisa mikáno ya bokitisi makámá ya nucléaire mpe ya botiki», na bokangi na molimo lisengeli ya kokata ndelo ya «mosála ya mindóki ya nucléaire na matéya ya bobáteli», na ntina ya «kokolisa polélé mpe kolendisa banzelá ya boyébisi».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

04 sánzá ya mítáno 2026, 09:18