Elili ya bolakisi Elili ya bolakisi 

Bobimisi na Vatican ya mokánda mókó mpo ya kobika écologie mobimba na libótá

Badicastère mpo ya Mosála ya botomboli moto mobimba mpe mpo ya Balaíki, Libótá mpe Bomoí babimisi mokolo ya misáto 29 ya sánzá ya minéi mokánda mókó ya lisangá ekoluka kosálisa ya «kolekisa o ntéi ya libótá litungisi ya Bokeli mpe ya bomoí ya moto».

Vatican News

«Écologie mobimba na bomoí ya libótá» ezali nkombo ya mokánda ekomami elongo na badicastère mpo ya Mosála ya botomboli moto mobimba mpe mpo ya Balaíki, Libótá mpe Bomoí, zambi ya «kolekisa o ntéi ya libótá litungisi ya Bokeli mpe ya Bomoí ya moto». Communiqué yókó elobi 'te bayékoli na bozindo mambi ma Nzámbe, ba conseiller mpe balongani bazalaki na bokomi mokánda yangó, ebotama mpo ya koyanola na bambela ya baPapá François mpe Léon XIV na koyóka bogangi ya babola mpe ya Mabelé mpe ya kopésa eyano yókó ya sóló, na bosáleli matéya ya bolendisi ya bontómá sima ya synode Amoris Laetitia mpe encyclique Laudato si'

Mabelé mókó ya kobóta mpo ya lingómbá ya bato

«Mitúya biye bizui loléngé mpe bikokola o ntéi ya libótá bizali mabelé ya kobóta esika wápi bomoí ya lingómbá ya bato ekobima. Mabótá bizali bôngó na ntina mpo ya komatisa mpe kolekisa motúya ya kobátela ndáko ya bisó bansó mpe ya moto mókó mókó», baepiskopo ya lokúmu Michael Czerny mpe Kevin Farrell, bapréfet ya badicastère, bakomi na ebándeli na bangó. «Mabótá mingi, bikokoba baepiskopo ya lokúmu mibalé, bakobika mbela ená na motéma mókó ya kofúngwama mpe na elikya 'te Yézu-Kristu azali nani. Ezali o ntéi ya libótá ndé tokoyekola likabo ya yo méi, motéma mpio mpe bomipesi, boyambi mpe bobáteli bomoí, zambi ekoka komata mpe kokola na litondi; na lokolá bobakisi mpe bozongiseli, bokabolani káti ya bato mpe bosálisani na mabótá misusu, na lokolá bolekisi mayéle mpe bonkoko».

Makanisi mpe ba bokanisi

Mokánda ebongisi banzelá ya ntina na mabótá, na bituluku ya Eklezia mpe na batángi mókó mókó mpo ya kobunda na mikakatano ya nzinganzinga ya mikolo miye mpe kotombola bomátisi na litondi ya moto mókó mókó. Eténi ya yambo esangisi makanisi ya ntina bizuami na makomi ya ntina ya Papá François. Ya mibalé ezali na ba mikabo ya makambo-makonzi biye bikolakisa makambo sambo biúti na Laudato si': boyóki mongongo ya mabelé, babola mpe bato bazangi makoki; botomboli ya nkita yókó ya écologie; bondimi mitindo ya bomoí bolongobami; écologie ya litondi mpe botéi; molimo ya écologie na botáli bokó ya libótá; mpe bozali ya mabótá na bomoí ya lisangá.

Bozali ya ofele

Mokabo mókó mókó ekoloba bandimbola, babokotisi, mituná mpe bikela ya sóló. «Écologie mobimba na bomoí ya libótá»’ezali ofele na nkóta mitáno na basite web ya badicastère mibalé.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

01 sánzá ya mítáno 2026, 12:47