«Todos, todos, todos!»
Vatican News
«Tozuaki litómba ya ngolu; toyéba kolimbisa». Mwá maloba biye bikoloba na mokuse molimo ya papá mókó mpe lisapo ya mosála (pontificat) na ye. Na waná ebakisami nsakola eye, ebimaka o ebándeli ya ministeli na ye: «Ndéngé nalingi Eklezia yókó mobola mpe mpo ya babola!» Mobú mókó sima ya liwa ya Papá François, Vatican News, Radio Vatican mpe Osservatore Romano bazongeli mwá ndambo ya bileko ya ntina na documentaire yókó ya miniti 27 na nkombo «Todos, Todos, Todos», likanisi liúti na lyokó lisusu ya maloba na ye ya malámu penepene na ba nzinganzinga, ya ba mbela na ye ya ntángo insó na boboto na mokili mókó ekabwani na etumba na «ndambo ndambo».
«Todos, todos, todos!» -ezali na ba plateforme ya ba média ya Vatican- ezali nsinga ekokamba lisoló lyokó ekomonana eye ebaloli ntina ya mokengeli ya mosála ya Jorge Mario Bergoglio. Na nzelá ya bilili ya kála mpe ya biténi ya ntina, documentaire ekolimbola Eklezia yókó ekotámbola, ekoki na bosololi mpe na bozali o ntéi ya ba mpótá ya lisapo. Úto ntina ya ngolu kinó botóngi boyokani mbala mókó, mibú ya mosála ya François bikomonana lokolá nzebi yókó ya Eklezia eye ebaloli Nsango-Ndamu na bikela ya sóló mpe bisosolami mokili mobimba.
Koleka bokundoli bokó, bôngó, molimo móķó ya bomoí, botáli bokó eye, mobú mókó sima ya liwa ya François, ekokoba kotúna leló ya Eklezia mpe ya mokili.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.