Luka

Lisanga linene ya ONU Lisanga linene ya ONU  (ANSA)

Ngwendé ya Sántu-Petelo ekoloba lisusu na Ecosoc mpo ya botiyi moto o káti

Ngwendé ya Sántu-Petelo elobi lisusu lisengeli ya kotia moto o ntéi ya botomboli o eleko ya liyangani lyokó ya Forum 2026 ya Ecosoc na New York, na ONU. Na likambo ya Bomipesi ya Séville ya sánzá ya sambo 2025, batindami ya Ngwendé ya Sántu-Petelo bakabolaki bobángi na bangó mpo ya ntáká (écart) ekomata káti ya bilaka ya Bikóló mpe ya makabo na bangó mpo ya bikóló ya babola koleka to baye babongisami koleka na makámá ya mokili.

Vatican News

Likambo lya bopesi mosolo ya botomboli atáko ezali tekiniki, «bato basengeli kozala o ntéi ya botomboli»: batindami ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU na New York balobaki mobéko eye ya ntina ya 23 ya sánzá ya minéi eleki o eleko ya Forum 2026 ya Ecosoc, (Conseil économique et social de l’ONU), na bolandi epesamaki na bopesi mosolo ya botomboli. Na sánzá ya sambo 2025, mokánda mókó etiamaka mokoloto, Bomipesi ya Séville (Engagement de Séville). Ezali mwángo mókó ya ekela ya ONU ya mikáno 130 mpo ya kobongola ntoki-ndáko (architecture) ya mosolo ya mokili, na boluki kosilisa eye ezangi na bopesi mosolo na ba Objectif ya botomboli ya sékó na likambo ya Agenda 2030.

Ngwendé ya Sántu-Petelo ebetaki nsete na likambo 'te «ba mwángo mpe bisaleli ya bopesi mosolo bizali kaka ba nzelá» biye motúya esengeli komekama «na likoki na bangó ya kotosa lokúmu ya moto mókó mókó mpe ya komatisa bolámu ya bansó, mingi mpenza ya babola mpe ya baye bazangi»

Ba ntáká káti ya bomipesi mpe bokokisi ya sóló

O eleko ya liyangani liye, Ngwendé ya Sántu-Petelo abimisaki likanisi linéne ya ye etáli «ntáká ekokola káti ya bomipesi endimamaki na ba mwángo ya mokili mpe bosóló ekosálema mpo ya ba milliard ya bato, mpenza na bikóló bizali na makoki ya malonga te, bikóló bikotombwama na bozangi nsele mpe Bikóló bike ya bisanga bikotombwama».

Litungisi mosusu, «kilo ya nyongo» eye «ekangi na nkingó letá ya kobimisa mosolo na bokólóngónó, botéi mpe bobáteli bato». «Bomipesi ya lisálisi bitosami te, kútu binyatami, nzokándé bobimisi mosolo mpo ya mampinga bikomata. Bato bazangi makoki bakokoba kokumba kilo ya makámá biye baluki yangó te. Ezali waná bokwéi bokó kaka ya politiki te, kasi lokolá ya botéyisi», ebetaki nsete Ngwendé ya Sántu-Petelo. Likambo ebwakamaki na Séville mobú elekaki ezali «ekela yókó ya bosálisani», ezongelaki Ngwendé ya Sántu-Petelo na elobelo, na bolobi lisusu elaka ya bikóló ya bomengo ya «kokokisa ba bomipesi na bangó na likambo ya lisálisi ya letá ya botomboli», biye «ya kozongisa makoki ya bokitisi nyongo na ndéngé ya malámu, polélé koleka mpe bilongobani na bampósá ya bato», «ya kokamba bopesi mosolo ya bato bangó mókó kaka mpo ya bozongi na bobimisi mosolo te, kasi lokolá mpo ya bolámu ya bansó».

Bikóló bizali na nyongo mpe basengeli na masálisi bangó mókó bazali na eténi na bangó ya mokúmbá na bosáleli mbongo yangó biye bisengeli bipesama na botomboli, ebakisaki Ngwendé ya Sántu-Petelo.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

25 sánzá ya mínei 2026, 10:59