Basilique santu Augustin n'Annaba Basilique santu Augustin n'Annaba 

Na Annaba, ba Augustinien baloni bondeko mpe lisoló

Na ngómbá esika wápi etelema Hippone ezali leló basilique Sántu-Augustin. Longola bosáli ba misa, basáli ya Nzámbe bakosála misála ebelé bikoluka kosálisa lisoló káti ya ba bonkoko mpe biyamba, mpe bamipesi ya koyébisa botéi ya Tatá enéne ya Eklezia. Sángó Fred Wekesa: «Bozali ya Papá káti na bisó ezali libenisi lyokó mpe lilendisi lyokó ya kokoba bomipesi na bisó».

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Basilique bokó, monastère mókó, esika yókó ya kobomba búku, esika ya kopema mpo ya bato ya mobémbo mwa boyambi. Tángo Annaba ebengamaka Hippone, Augustin, oyo azalaka episkopo na yangó, alingaka kosála na eténi ya etuka ya bokristu lisangá lyokó ya basángó pembeni ya ndáko ya episkopo, asangisaki malámu mpe abongisaki bankomá na ye mpe atongisaka esika ya kobombana mpo ya bapaya mpe bato ya pási. Tángo, na 1839, Mgr Antoine Adolphe Dupuch, episkopo ya dioceze y'Alger, eye ekotisaka Algérie mobimba, ayaki na mobémbo na etuka ya moke ya libóngo, akamwaka na káti ya biloko bikweya ya ndáko ya kála ya episkopo Augustin: esengelaki kozongisa lisusu lolendo na ye ebunga mpe kotónga lisusu eye ezalaka na eleko ya Tatá enéne ya Eklezia oyo abikaka káti ya bikeke ya minéi mpe ya mitáno. Mpe leló, na ngómbá Annaba, basilique etombelama na sántu episkopo etelemi, pembeni na yangó ezali «Presbytère» ya basángó augustinien, na lokolá ndáko yókó ya koyamba mpo ya babange ya ba Petites Sœurs ya ba Pauvres, mpe úto pembeni ya mibú mibalé, "Esika Sántu-Monica" ebateli misála nionso ya episkopo ya Hippone. Bisika mingi biye Léon XIV akotála na mokolo ya mibalé ya mobémbo na ye ya mokengeli n'Algérie, na matambe ya tatá esántu ya lingómbá eye ye azali.

Na bisika biye bikokundola sántu Augustin

Etapi ya yambo ezali esika ya archéologie ya Hippone, na sima Papá wa Roma akokende na likoló ya ngómbá Annaba, Lalla Bouna, lokolá baí-Algérie babengaka yangó. Akotelema áwa na ndáko ya ba Petites Sœurs ya ba Pauvres, na sima na lisangá ya bandeko augustinien eye azali na mokumba ya mobateli ya basilique Sántu-Augustin. Na sima ya zanga, asáli misa na esika ená, eye etálama libosó na Papá mókó te.

"Esika ya bobombi ba búku" ya sika ya episkopo ya Hippone

Basáli ya Nzámbe misáto bavandaka na Presbytère mpe bazali na etindá ya kokobisa molimo ya episkopo ya Hippone na Annaba: sángó Fred Wekesa, ya Kenya, recteur ya basilique Sántu-Augustin, sángó Dominique Habakkuk Juma Gbefe Juma, moto ya Sudan ya Sudi, mosámbeli, mpe sángó Leviticus Longzem Shailong, moí-Nigéria, motáli nkita. Na lisálisi na bangó, esika ya bobombi ba búku eye ya Augustin, elimbolama na biographe ya yambo Possidius, lokolá ekobomba ba "búku, matéya mpe mikánda" mpe asengaka kaka ya "kobátela na bokébi mpo ya bato bakoya sima", "etindámaki epái esusu" sima ya bikeke na esika na yangó ya ebándeli. Ebungaka tángo ba Vandale, sima ya bokoti na Afrika ya Nordi, babenganaka baepiskopo ya Numidie na Sardaigne. Ebongisamaka na eténi yókó ya crypte ya basilique mpe efúngwamaka na bato mikolo nionso ya mibalé mpe ya minéi. Bakokóma kúna na ebuteli (escalier), na ngambo ya mwási ya altare. Ezali "Esika Sántu-Monica", epái wápi okoki kotánga ba búku ya mobéko 93, pembeni na matéya 500 mpe mikánda koleka 200 ya episkopo ya Hippone na latin, italien, espagnol, français, anglais mpe arabe. Ba búku ya boyékoli mambi ma Nzámbe, ya patrologie, ya philosophie, lisapo ya biyamba, islamologie, psychologie mpe bisusu bizali lokolá, na nionso ba búku koleka 2 000. Ba sángó Augustin basangisaki pembeni na mikánda 9000 úto bokómi na bangó na Annaba, na 1933, mobú eye episkopo ya Constantine, Émile-Jean-François Thiénard, asengaka na Lingómbá ya sántu Augustin ya kozua mokumba ya basilique, sima ya ndingisa ya Sacrée Congrégation pour les Religieux ya botongi ndáko yókó na ndáko ya kála ya episkopo ya Hippone.

Likabo ya ba augustinien ya Malte

Ba Augustinien ya Malte bazuaka mokúmbá ya kobátela esika. Na likanisi na bangó elobamaka mpe etongama "presbytère ya Hippone", efúngwamaka na 25 ya sánzá ya minéi 1935 mpe ezali kinó leló ndáko ya bandeko augustinien. Na mosála ya Eklezia ya ekóló, sima ya mibú, ba augustinien basálaka basilique esika yókó ya bokútáni mpe ya lisoló káti ya ba bonkoko mpe biyamba; ba botáli ya tourisme, mpenza biye ya baí- Algérie, na biye bayékoli, makanisi ya bonkoko mpe bileko ya boyékoli bibakisama. Sima ya mibú ya pási ya "mibú zómi ya molili", eleko eye ba augustinien ya Malte bazalaki lisusu na makoki ya kosála mokúmbá na bangó na Hippone, lisangá enéne ya Ordre akanisaka mwángo mókó ya sika, na bokotisi bandeko bazali na biténi mitáno ya mokili. Na mokánda mókó atindelaka na basáli ya Nzámbe bansó na 2005, mosámbeli monéne ya eleko, sángó Prevost, akomaka ntina ya kolaka bozali bokó na bisika bisántu bisangana na sántu Augustin mpe etiaka libosó, «na botáli loléngé ya eleko ya mokili, ya eyamba mpe ya bonkoko», libakú lyokó kaka epesami na ba augustinien «ya komatisa lisoló káti ya biyamba» mpe «boyébi bomoí mpe botéi ya sántu Augustin» na Hippone ya leló. Yangó, na 2013, chapitre général ya lisangá ezuaka mokáno ya kopesa bobateli ya ndáko ya Annaba na curie générale mpe ya kobongisa kúna lisangá lyokó ya mokili.

 Lisangá ya basáli na Nzámbe ya leló ya Annaba

«Bisó, bandeko ya lisangá augustinien ya Annaba, tokosambela misa mpo ya bandimi bakristu mikolo nionso ya mitáno, mokolo ya eyenga ya póso áwa, elimboli sángó Fred na ba média ya Vatican. Tokoyamba ba touriste mpe bato ya mobémbo mwa boyambi, kátikáti 100 kinó 150 na mokolo, bakokóma na été 400 kinó 500, na nionso na mobú tozuaka batáli 35 000 kinó 40 000, mingi mpenza baí-Algérie. Ya koleka, tokobatela esika ya kobomba ba búku mpe tokobongisa Mikolo Augustinien, bokútáni bokó ya bonkoko, ya molimo mpe ya lisoló na yangó tokomeka koyébisa na bato ebelé sántu Augustin, likanisi na ye, philosophie na ye mpe boyékoli mambi ma Nzámbe na ye», ekobaki mosáli ya Nzámbe. Na mbala ya motóbá ya likambo yangó, na likambo-likonzi «Kobika na bolingo, kobongisa lisusu mokili», esálemaka na 7 ya sánzá ya zómi na mókó 2015 mpe esangisaka bato koleka 200. Mpo ya basáli ya Nzámbe, mobémbo ya Léon XIV ezali leló eleko yókó ya ntina, eye ekotatola bozali penepene ya Eklezia epái ya lisangá eke ya bokristu ekotisama na ekóló eye ezali na ba musulman ebelé. «Yangó ekolendisa bisó, na bobengi bisó ya kokoba lisoló mpo ya boboto, ya kobika lokolá bandeko -elobi mosámbeli ya basilique Sántu-Augustin -, komilimbisa bisó na bisó mpe, lokolá elendisaka episkopo ya Hippone, ya kobika na bomókó».

«Mwána ya sántu Augustin» na mabelé y'Algérie

Tángo Robert Prevost aponamaka papá, likambo 'te amilakisaka lokolá «mwána ya sántu Augustin» ebimisaka mpósá ya koyéba n'Algérie, mpe mpenza n’Annaba, mpe mingi bizali baye balingaka komona ye na mabelé ya ekóló. Lisangá ya basángó augustinien ezuaka maloba ya longónya ebelé mpe nsakola ya mobémbo ya Papá wa Roma eyambamaki na esengo enéne. «Na ba réseaux sociaux, ba ndimbola mingi, Papá Léon XIV abengamaki kotála Algérie», elobi sángó Fred, na bobakisi 'te na masangá make ya bokristu y'Algérie, mingi bandimaki 'te Papá wa Roma, lokolá mosáli ya Nzámbe augustinien, akoya kála te n'Algérie. Baye basepelaki koleka na likanisi ya boyéi ya Papá wa Roma bizali bilenge, esemboli mosáli ya Nzámbe na bolimboli bobongisami ebelé mpe botelemi monéne na etuka.

Bosálisani na ba Petites Sœurs ya ba Pauvres

Na ngómbá y'Annaba, ba augustinien basálisanaka lokolá na Petites Sœurs des Pauvres ya ndáko ya boyambi mpo ya babange ezali pembeni ya basilique. Esalelo etongamaka na eténi ya mabelé eye episkopo y'Alger, Charles-Martial-Allemand Lavigerie, apesaka na ba mamelo sima ya bozui, na 24 ya sánzá ya motóbá 1881, likoló ya ngómbá zambi ya kokoba likanisi ya Mgr Dupuch, oyo atikalaka komona ndoto na ye kosálema te. Mokolo ya eyenga, basángó bakosála misa na chapelle ya ba mamelo; mókó na bangó asálaka mosála ya koyóka ntúbéla, nzokándé mamelo mókó azali na bokambi ya basilique, eye esanganaka mbala misáto na mobú mpo ya kobongisa misála ya boyangeli. «Ezali bosálisani bokó ya motúya, elobi sángó Fred. Lokolá elobi eyele yókó y'Afrika, "lobóko lyokó kaka ekoki kobete mabóko te"».

Liloba ya boboto mpe ya boyokani ya Papá

Na súka, Papá akokende na makolo na lisangá ya basáli ya Nzámbe augustinien epái wápi atelemi mpo ya biléi ya tongo, sima, sima ya zanga, akokamba misa na basilique Sántu-Augustin. Áwa na abside, eloko yókó ekobomba ekeko-etika ya episkopo ya Hippone, na libanga ya Barbentane. Etika ená ezali likabo lyokó ya dioceze mpe ya etuka ya Pavie na Mgr Dupuch oyo, na 1842, na mpósá libosó ya nionso kotelemisa káti ya ba vestige ya Hippone ya kála ekeko ya episkopo na ye ya kála, asáli mobémbo mókó na Italie mpo ya kolanda lisusu nzelá ya mbongwana na ye: Roma, Ostie, Milan. Na 23 ya sánzá ya misáto, episkopo akómaki na Pavie mpo ya kokumisa bitika ya sántu y'Algérie, bibombana waná úta ekeke ya mwambi, mpe ya kozua etika yókó ya komema na Hippone. Etika ezali na basilique Sántu-Augustin úta 29 ya sánzá ya misáto 1900, mokolo ya kobonza esika ená ya losámbo. Leló, papá wa yambo augustinien ayéi kokumisa yangó mpo ya kotombola, na nzelá ya episkopo ya Hippone, "boboto", "boyokani", "botosi mpe lokúmu mpo ya bato bansó".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

15 sánzá ya mínei 2026, 10:14