Basantu babateli ya Séoul 2027 Basantu babateli ya Séoul 2027 

MMB ya Séoul 2027 bibimisi basántu babáteli mitáno ya bangó

Sántu Yoane-Polo II, sántu André Kim Taegon, sántu Françoise Xavier Cabrini, sántu Joséphine Bakhita mpe sántu Carlo Acutis: waná ba ndakisa mitáno biye bilenge bakoki komimona. Baponami na lingómbá ya ekóló ekokamba Mikolo ya mokili ya bolengé ya 2027.

Vatican News

Na communiqué yókó, lingómbá ya ekóló ya bobongisi Mokolo ya mokili ya bolengé 2027 na Séoul, ebimisaki ba nkombo ya basántu babáteli mitáno ya MMB, na bolakisi bangó lokolá «ba ndakisa ya boyambi mpo ya bilenge mpe bakumbi, na nzelá ya litatoli ya bomoí na bangó mpe ya molimo na bangó».

Ezali sántu Yoane-Polo II (1920-2005), mokeli ya Mikolo ya mokili ya bolengé, eye tokokanisa bokébi na ye mpo ya bilenge, libótá mpe lokúmu ya bomoí ya moto; sántu André Kim Taegon (1821-1846) mpe baninga na ye, sángó katoliko ya yambo ya Corée, elembo ya boyambi mpe ya moléndé, bakomisaka ye martiro na bolengé; sántu Françoise Xavier Cabrini (1850-1917), motindámi ayébani mpo ya bomipesi na ye epái ya ba migrant mpe babola; sántu Joséphine Bakhita (1869-1947), moúmbu mókó azuaka bonsómi akómaki mamelo, nzeneneke ya elikya, ya bonsómi mpe ya boyambi ebongwana na pási; sántu Carlo Acutis (1991-2006), elenge yókó mosántu ya eleko ya internet eye bomoí etikali ndakisa ya bopalinginyi Nsango-Ndamu na internet.

Na losámbo mpo ya basántu babáteli

Likambo ya boponi ebándaki na súka ya 2024 na botuni na ekóló epái ya bilengé, batambwisi ya matéya mpo ya bilengé mpe bayékolisi, elandamaki na momekano mókó ya baye baponamaki mpe boponi bokó ya súka na lingómbá ya ekóló. Na sima, lokolá communiqué elobi, etuluku yókó ya bilengé elekisaki sánzá mibalé na boyékoli bomoí mpe molimo ya basántu babáteli mitáno. Na nzelá ya masoló mpe ya likanisi lisangá, bilenge babongisaki losámbo lyokó ebonzamaki mpe elembo yókó ya bolakisi mpo ya sántu mókó mókó, na boluki kobimisa litatoli elongobami eye mókó mókó ya bangó akopesa leló na bilengé.

Episkopo ya lokúmu Farrell: bosántu ezali likanisi lyokó ya mosika te

«Basántu babáteli bakosála mosála mókó ya ntina na bobongisi móķó mókó ya Mokolo ya mokili ya bolenge»: elobaki episkopo ya lokúmu Kevin Farrell, préfet ya dicastère mpo ya Laíki, Libótá mpe Bomoí. Mpo ya episkopo ya lokúmu, «babengaka bilenge, batambwisi mpe bakengeli ya kokanisa na likabo ya mbélá ya Nzámbe,  mbela ya batisimo, ya bonganga-Nzámbe, ya eyamba mpe ya libala, na bolendisi bisó na koyanola na esengo mpe mpiko na bolandi Kristu oyo alonga mokili, lokolá ekoloba likambo-likonzi ya MMB». Episkopo ya lokúmu Farrell akolikya 'te litatoli na bangó ekoki kopesa likanisi na bilenge, mpenza ya baye na bileko bizui bilembo ya pási mpe ya minyoko, ya komona 'te bosántu ezali likanisi «lyokó ya mosika» te, kasi mbélá mókó eye esengeli koyanola.

 Episkopo ya Séoul: nsinga yókó ya molimo ya mozindo na basántu

«Basántu babáteli -elimbolaki episkopo ya lokúmu ya Séoul Peter Soon-taick Chung, mokambi ya Lingómbá ya ekóló ya bobongisi MMB Séoul 2027- bakoyamba mikili mpe bokitani, mpe móķó mókó na bangó akopesa nzelá yókó mpo ya kobika boyambi na ba bosóló biye bilenge bakokutana na yangó leló». Episkopo akolikya 'te bilenge bakosála nsinga yókó ya molimo na basántu babáteli.

Mosántu nini yo ozali?

Na site internet ya MMB Séoul 2027 mpe na ba réseaux sociaux, Lingómbá ya bobongisi ya ekóló elakisi bomoí mpe molimo ya basántu babáteli na nzelá ya nkomá mpe manaka bibakisami mpo ya kosálisa bilenge ya komesene mingi na litatoli na bangó.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

27 sánzá ya mínei 2026, 13:52