Libula ya Papá François, mobú mókó sima ya liwa na ye
JR Bompolonga - Kinshasa
Likanisi ya kokamwa na mokili, ya sóló, ya matanga, ya bozali te. Likanisi ya bikela na ye mpe ya maloba na ye biye bitámbola na mokili mpe bituta milimo. Kasi, koleka waná, libula na ye ya molimo mpe likambo ya bomoí ezali mosika ya kotelema. Bisika binéne ya botongi biye François atikaka ya kofúngwama, bikokoba kobika mpe kotombwama na bokambi ya mokitani na ye Léon XIV.
Synode
Likambo lya Synode ya yambo, elobama na Papá ya sika ntángo aponamaki, úta balcon ya basilique Sántu-Petelo: «Tolingi kozala Eklezia yókó ya Synode, Eklezia yókó ekotámbola». Ndéngé waná ya bosáli, «ezalela yókó eye ekosálisa bisó ya kozala Eklezia», endimama lokolá loléngé ya mosála o eleko ya consistoire ya yambo ya mbalakaka ya mosála ya Papá ya sika, na 7 mpe 8 ya sánzá ya yambo bilekaki. Léon XIV andimaki epái esusu Lisangá ya Eklezia ya synode ya sánzá ya zómi 2028. Molúlú mókó Papá François asakolaka, sánzá mibalé yambo ya liwa na ye.
Amoris Laetitia, Evangelii Gaudium, Praedicate Evangelium
Libula ya Papá François ekokoba kobika likoló ya botáli na mozindo ndambo ya mikánda na ye ya bokeli: lokolá lilendisi ya bontómá sima ya synode Amoris Laetitia, ebimaka na sánzá ya mitáno 2016, esika nini bakónzi ya masangá ya baepiskopo ya mokili mobimba bakotanga, bibéngami na súka ya sánzá ya zómi 2026. Léon XIV ye mókó alimbolaki 'te likita ená ezalaki koluka kososola mikáno ya kokamata zambi ya kosakola Nsango-Ndamu na mabótá leló...na mwinda ya Amoris Laetitia mpe na botáli eye ekosálema sik’oyo na ba Eklezia ya bikóló.
Mokánda mosusu ya ntina: Evangelii Gaudium, mokánda ya botámboli ya Papá François, babandaka kosálela yangó na ntángo ya mosála na ye. Na mokánda mókó ebimaka na 14 ya sánzá ya minéi, Léon XIV alendisi baepiskopo ya lokúmu ya kokoba -ntángo ya bokútáni na bangó ya mibalé, na sánzá ya motóbá ekoya- likanisi na bopalinginyi na mwinda ya lilendisi ená kaka ya bontómá, eye akobenga «litono ya botáli ya ntina».
Likákoli esusu, botángi esusu ebongisami mpo ya baepiskopo ya lokúmu: Mobéko-likonzi ya bontómá ya François Praedicate Evangelium eye ekoyema lisusu elongi ya Curia ya Roma, mbongwana mókó eye Léon XIV ekomonana neti kolinga kopesa yangó eyano. Na sánzá ya zómi na mókó elekaki, abimisaka mibéko mibalé ya sika biye bikokamba botámboli ya Curia ya Roma mpe basáli na ye mpe engebene na mibéko ya káti ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na mikáno bipesama na Praedicate Evangelium.
Léon XIV akokoba makambo ya ntina ya mosála ya François
Na bisika ebelé ya ezalela yókó ya bokanisi to ya eye ya kála, Léon XIV akokoba mpe akobongisa makambo makási ya mosála eye elekaki, na loléngé na ye, kobombana, likébi, na mpósá na ye ya kokitisa, ya kosálela mpe kosembola motindo mosála esengeli kosálema. Makanisi ya Papá François bizali na makambo misusu na bozui na ye ya maloba mpe mikáno.
Penepene ya baye babwakami, tembe te: lilendisi ya yambo ya Léon XIV, Dilexi te, ezali mosála mókó ebándaka na François. Mokánda mókó etíé na kátikáti bolingo ya babola, lisengeli ya kotia moto likoló ya mbano. Mokánda etelemeli na makási bokónzi ya mabé ya nkita eye ekoboma.
Bikobika lisusu na bobateli ya ba migrant, liloba ya ntina ezongelami mpe elobami lisusu: na matambe ya oyo azalaki libosó na ye, Léon XIV akokende na Lampedusa na 4 ya sánzá ya sambo mpo ya komema bolámu mpe lilendisi na ba migrant mpe baye bakosálisa bangó.
Bikobika lisusu na bomipesi ya nzinganzinga mpe lisálisi na makanisi bibimisamaka na François na encyclique na ye eyébana Laudato Sì, na botiyí bobateli ya «ndáko ya bansó» o ntéi ya boyambi.
Bikobika na ba mbela ya Eklezia yókó ekosálela buro moke mpe ya motindami koleka, kasi lokolá na bosololi káti ya biyamba. Na 18 ya sánzá ya minéi, na pépo eye ememaki ye úta Yaoundé kinó Luanda, na bolobi «bokútáni na ye malámu na etuluku ya ba imam na Cameroun», Léon XIV alimbolaki na bapanzi nsango 'te alingaki «kokoba kotombola...lokolá Papá François asálaka na mosála na ye, lisoló mpe bondeko...mpe botóngi ya boboto na bato ya biyamba nonso».
François azali na nsé ya mabelé te
Káti ya bisika binéne ya botóngi ya mosála ya Papá François ezali bobongisi ya mbongo ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Mosála esili nanu te, makambo ya mituná bizali, ba mbongwana misusu bizali na ntina. Likambo yangó ezali na mesa ya mokitani na ye, lokolá likambo ya etumba libosó ya ba bomonisi pási na Eklezia, eye Léon XIV alendisaki polélé na makási.
«François azali na nsé ya mabelé te», elobaki kála te episkopo ya lokúmu Victor Manuel Fernandez, préfet ya dicastère mpo ya Matéya ya Boyambi, na lisoló lyokó na media ya Italie Il Giornale. «Káti ya Léon mpe François...na esika ya botelemeli bokó, esengeli komona boyokani na makambo misusu».
Ba mbongwana biye bitálisami, ba bobongisi ya ngonga esusu...Léon XIV atelemi te. Akobongisa mpe kokómisa makási. Na ndéngé na ye, akokotisa libula ya François na litéya na ye.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.