Bilili ya bobebisi na mboka-mokonzi ya Liba, Beyrouth; sima ya mobulu ya Israel Bilili ya bobebisi na mboka-mokonzi ya Liba, Beyrouth; sima ya mobulu ya Israel  (AFP or licensors)

Libá ekoki na boboto, mpo «etumba ezali liwa»

Ntómá na Libá, Mgr Paolo Borgia, azongi sima ya etindá yókó na sudi na motomolo maronite, episkopo ya lokúmu Béchara Raï, alimboli ezalela na mboka-mokónzi esika wápi, na miniti zómi, mobúlú ya Israël eloni liwa mpe bobébisi. «Bozimi-móto mókó áwa mpe bobándi ya masoló bizali kolukama makási. Bopemi bokó ekoki kofúngola ezibeli na diplomatie», elobi ye na likambo ya bolongoli Libá na Bozimi-móto esálemaki na Iran.

Jean-René Bompolonga  - Kinshasa

«Mobúlú ya boye nanu esálema te. Balobi 'te na miniti zómi, ezalaki na ba bobeti (frappe) mbala moko... Basálelaki motángo ebelé ya ba pépo ya bitumba ya Israël. Bapanzi nsango balobi ntuku mitáno, kasi waná ezali ya kotála. Bakúfi? Kinó sik’oyo, Croix-Rouge atangaki bakúfi pembeni na 87 mpe baye bazoki 722. Motángo ená esengeli ebongama lisusu mpo tángo mosusu mingi misusu bazali na nsé ya bandáko bikwéi», elimboli Mgr Paolo Borgia azuamaki na nzelá ya singa mokolo ya misáto na pokwa. Na koleka ngonga zómi, ntómá ya Papá na Libá akendeki etindá na sudi ya ekóló na motomolo maronite, episkopo ya lokúmu Béchara Boutros Raï, mpo ya komema lisálisi mpe bolendisi na bato, mpe kaka na bakristu te. Alobi na ba média ya Vatican te «alembi te», na ndéngé ya molimo: «Esengeli kozala na elikya mpo ya kokabola yango na basusu». Bilili biye bikoleka sik’oyo na Beyrouth, epái wápi ba réseaux sociaux bakobimisa bilili mpe ba vidéo ya bandáko bitutami, ya mapáta ya moíndo boleki likoló ya bandáko, mabángá bikopumbwa likoló ya ba civil, bikotia moto nionso na mokakatano.

Episkopo, nini ekoleka na Beyrouth?

Mokolo mobimba, totambolaki na ba bobeti ya mortier na bitumba káti ya Hezbollah mpe Israël. Tolandi yangó mokolo mobimba. Sik’oyo botámboli mingi, mboka etondi, tokoyóka maséba (sirènes) mpe tokomona bambulance na káti; Beyrouth ezali opesi mbwá mbwá aboyi. Mobúlú ya Israël ekokoba. Na ndéngé toyébi na media ya Israël, mobúlú esengeli kokoba na bokási waná mikolo mibalé. Esengeli kotála ndéngé nini ezalela ekoleka.

Mpe nionso waná sima ya boyóki Ministre wa yambo ya Israël Netanyahu mokolo ya mibalé 'te andimaki bopemi ya bapóso mibalé bisengamaki n'Amerika epái ya Iran, na bolongoli Libá...

Nasosoli 'te ezali bizalela mibalé bikeseni, atá bikangemi. Ngambo mókó, Iran asangani na Hezbollah, kasi ngambo mosusu, Hezbollah ezali mpo na Israël likambo lyokó mobimba. Esengeli mpenza 'te bozimi-móto mókó ezuama áwa mpe 'te masoló bisálema mpo ya kimia na Libá libosó ya Israël. Ezaleli ya etumba ezali pété te mpe ekokolisa kaka bokeseni, na bobakisi kopesa liwa mpe bobuki. Lokolá toyébi, eye Israël elingi, ezali bobotoli mandoki na Hezbollah, mpe likambo waná ekómi te. Bopemi bokó ekofúngola ezibeli ya diplomatie. Epái esusu, bakambi ya Libá bangó mókó -mingi mpenza mokónzi ya ekóló- basengaki mpe balingaki mbala ebelé bofúngoli masoló na Israël mbala mókó, zambi ya kokóma na eyano yókó na etumba ekoleka. Nandimi 'te nzelá ya kolanda ezali eye Papá Léon XIV alakisaki o eleko y'Angélus ya 15 ya sánzá ya misáto: kolanda «ba nzelá ya lisoló biye bikoki kosalisa bakambi ya ekóló na bosáli biyano ya libela na matata ezali na ekóló, mpo ya bolámu ya baí-Libá bansó».

Eyano nini ekoki kozuama mpo ya ekóló?

Kaka eye ya kokoba koluka boboto mpe kozua biyano atá tángo bizali komonana te. Etumba ekomema bobébisi, liwa, bato bébóo batiki bipái na bangó, bizaleli ebelé ya pási koleka mpe pété te ya kobundana. Mókó mókó esengeli tángo mosusu kososola 'te ezali nzelá ya malámu te mpe esengeli kolanda nzelá yókó mpe kozua bizaleli ya lisangá, bizaleli ya malonga.

Tokoki koloba 'te Libá ekoleka «eleko na ye ya mabé koleka»?

Libá akutana na bitumba ebelé biye nayébi te sóki ezali eleko ya mabé koleka. Ngonga yókó yókó ezali pási mpe etáli bato mpe bileko bikeseni. Etumba yókó yókó ezali se yangó mókó mpe ekoluka pási kaka, ekokolisa bobébisi. Nakanisi te 'te bakoki koloba 'te ezali eleko ya molili koleka to te, na botáli 'te Libá ezali na etumba úta koleka mibú 50.

Episkopo, olembi? Kaka na nzóto te, kasi na molimo, ndéngé eye ekoleka?

Te, nalembi te. Esengeli kozala na elikya ya bomoí, sóki te ndéngé nini kosála mpo ya kokanga na bomoí elikya ya basusu?

Papá abéngaki kokoba kosámbela. Butú bokó ya losámbo mpo ya boboto ekosálema na Sántu-Petelo na 11 ya sánzá ya minéi. Losámbo na yo ezali nini mpo ya mabelé eye esika wápi ozali ntómá?

Ezali mpo 'te tokoka kokóma na boboto, ya kobika na kimia mpe na sémba. Libá etikali mokakatano mókó, mpo ezali ekóló yókó ya bokeseni; mokakatano ezali kaka ya koyókana na loléngé elongobami zambi elongi ya kitoko ya ekóló eye ekoka komonana. Moto nionso ayébi ntina ya boboto, boboto ezali bopoli bokó te, boboto ezali likambo lyokó eúti na Nzámbe, ezali botiki bokó te libosó ya makambo. Boboto ezali sémba, ezali eloko eye epesaka likoki, na nzelá ya boyokani, ya kofúngola bomoí. Etumba ezali kaka liwa.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

11 sánzá ya mínei 2026, 12:35