Papa Leon XIV n'Africa: Algerie, Angola, Cameroun e Guinée Equatoriale Papa Leon XIV n'Africa: Algerie, Angola, Cameroun e Guinée Equatoriale 

Léon XIV n'Afrika: ba katoliko bazala basáli ya mbongwana

Léon XIV akokende n'Afrika mpo ya kozala pembeni ya baye bakobika nzinganzinga ya bomoí na bomemeli bangó elikya ya Kristu. Ezali waná episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alobaki na mobémbo ya misáto ya bontómá ya Papá, eye ekobánda mokolo ya yambo 13 ya sánzá ya minéi.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Algérie, Cameroun, Angola mpe Guinée équatoriale bakozela bokómi ya Léon XIV, oyo akozala n'Afrika úto 13 kinó 23 ya sánzá ya minéi. O eleko ya etapi ya yambo ya mobémbo, Tatá-Esántu akokende n'Annaba, etuka ya kála ya Hippone, «kaka mpo ya ekela yókó ya bokanisi te», elobi Secrétaire ya Letá, episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, «kasi ekela yókó ya bolongobami na mozindo ya molimo». Na bikóló minéi, mabongisi ya súka biyéi makási, nzokándé bozeli ezali bonéne mpo ya maloba Papá Léon XIV akolinga kokabola. Maloba mangó bikozala na makambo-makonzi ya boboto, ya bosololi, ya bobateli bokeli, ya migration mpe ya libótá.

“«Libosó ya makanisi ya bobébisi biye bikotika bilembo na mokili y'Afrika, na bosálisi bobola, kanyáka mpe mobúlú, episkopo ya lokúmu Parolin alingi 'te ba katoliko bazala basáli ya bosémbo, ya boboto mpe bosálisani».”

Episkopo ya lokúmu Parolin, Tatá-Esántu akozala n'Afrika úto 13 kinó 23 ya sánzá ya minéi, mpo ya bososolami na boyambi masangá katoliko. Akotála bikóló minéi na linaka lyokó enéne káti ya bokútáni na bakambi ya ekoló, ba bosóló ya bisika waná mpe bosáli ba misa. Eloko nini ekomema mobémbo eye molayi?

Eloko ekomema mobémbo eye ezali liponi ya Tatá-Esántu ya komema bozali ya Eklezia esika wápi pási ya moto ezali makási koleka. Bikóló minéi bikeseni na lisapo na bangó, na ebikeli na bangó mpe mikakatano ya politiki na bangó, kasi basangani na bosóló bokó ekelama na ba mwinda mpe bililingi: masangá katoliko ya sóló mpe bilendisama, kasi lokolá bobola, bolembu, ba bokeseni mpe bobéndani bizua biyano te. Papá Léon XIV akokende n'Afrika mpo ya kozala pembeni ya baye bakobika na nzinganzinga ya bomoí.

Ekóló ya yambo Algérie. Léon XIV akotála na Alger Mosquée Enéne mpe, n’Annaba, Hippone ya kála, akosala Misa Esántu. Nini ekolukama, mpo ya Papá mókó mwána mobáli ya sántu Augustin, na bozongi ená na bisika ya sántu, nini kozela ekoki kozua na bosololi ya islam-bokristu na ekóló yókó ba musulman bazali ebelé?

Lokolá mwána mobáli ya molimo ya sántu Augustin, mpe Papá wa yambo ya Lisangá ya Augustin, kokende n’Annaba ezali ekela yókó ya bokanisi kaka te, kasi ekela yókó ya bolongobami na mozindo ya molimo. Papá Léon ayébi mabelé ená mpe atála yangó mbala ebelé lokolá Mosámbeli enéne ya Lisangá. Sántu Augustin akolakisa, na eleko eye, eloko yókó ya bosololi: azali esika yókó ya bokútáni káti ya momeseno ya bokristu mpe mokili ya islam.

Botáli ya Mosquée Enéne y'Alger ezali nionso na loléngé ená, lokolá bokobi bokó ya mokili ya nzelá ya lisoló káti ya biyamba esálema na Turquie mpe na Libá; lisoló lyokó eye Tatá-Esántu alingi kokoba na motéma mpio mpe na mpiko.

Na Cameroun, Tatá-Esántu akokende na bituka misáto: Yaoundé, Bamenda mpe Douala, na bileko ya makási lokolá bokútáni mpo ya boboto na Bamenda mpe botáli ya esika ya bána bitike. Na mwinda ya mikakatano bizali na bingúmba bisusu ya ekóló, eloko nini botáli eye ekoki kosála mpo ya kotombola boyokani mpe boboto káti na masangá?

Úto mibú ebelé, mokakatano mókó ezali na bingúmba bilobaka anglais na Cameroun, na bosáli bato ya makámá ebelé. Bato ya Bamenda bayébi yangó. Na eleko yókó ya bobébi ya ezaleli ya bobateli mpe ya bato, botáli ya Mokitani ya Petelo ekolakisa bokébi mpe motéma likoló ya Mokengeli ya Eklezia mpo ya etonga na ye, na boluki koyéba malámu pási na ye mpe kotambola pembeni na ye.

Etapi ya Bamenda ezali eye ya mokengeli mókó oyo akomimona na etonga na ye. Na monéne, Tatá-Esántu akokende na ekóló lokolá momemi ya elikya (mingi mpo ya bilenge), ya boyokani mpe ya boboto. Liloba na ye ezali mbela mókó mpo ya lisoló mpe botosi epái na epái.

Etapi ya misáto, Angola, esika wápi Papá akotála, longola mboka-mokónzi Luanda, bisika ya ntina lokolá Muxima mpe Saurimo, na bokútáni na masangá ya basáli ya Nzámbe mpe bosóló ya esika. Liloba nini Tatá-Esántu alingi amema na ekóló eye ezali na makoki bébóo kasi lokolá bokeseni makási káti na bato?

Bisika misáto biye Tatá-Esántu akotála n'Angola bikolakisa, na loléngé mosusu, mikakatano mpe bilikya biye Angola akokutana na yangó. Luanda mpe Saurimo bikolakisa bomengo. Mboka-mokónzi ekóma esika yókó ya bolámu, ekobenda misolo ya bapaya mpe migration bikoúta na káti ya ekóló. Saurimo ezali esika yókó ya ntina mpo ya misála ya mabángá ya ntálo, mpenza boluki diamant.

Nzokándé, sóki boluki ya makoki ya mokili emema bolámu, ezali lokolá na makambo ya mabé: bokosi basáli, bokolisi ya bokesenisi káti na bato mpe bobébisi nzinganzinga. Botáli ya sanctuaire ya Maria ya Muxima, mpo na yangó, ekolakisa bokási ya boyambi, eye ekosálisa baí-Angola ya koleka bileko biye ya pási ya lisapo na ye. Nalingi kobakisa 'te ngai mókó namonaka bokási ya Eklezia ya ekóló o eleko ya bokomisi episkopo Mgr Germano Penemote, ntómá ya yambo ya ekóló Angola.

Etapi ya súka, Guinée équatoriale, epái wápi mobémbo ekosúka káti ya Malabo, Mongomo mpe Bata, na bokutani na bilenge, mabótá, mokili ya bonkoko mpe lokolá bakangemi. Liyoki nini ezali na bokébi ená mingi na bilenge mpe na mabótá na ekóló yókó esika wápi Eklezia ezali káti na bato?

Guinée équatoriale ezali yókó ya bikóló katoliko koleka y'Afrika, na pembeni ya bato 80% bazali na boyambi katoliko. Na matambe ya sántu Yoane Polo Il, oyo atálaka ekóló na 1982, mobémbo eye ezali na eleko ya bokundoli mibú 170 ya ebándeli ya botéi Nsango-Ndamu (1855-2025), na likambo-likonzi: «Kristu, mwinda ya Guinée équatoriale, mpo ya lobí lyokó ya elikya». Na mobémbo eye ya bontómá, bai-Guinée équatoriale akokanisa lobí eleka na botiyi motéma, na bokobi nzelá mókó ya boyambi mpe ya elikya mpo ya lobí ekoya.

Mobémbo ya Papá, mpe mingi mpenza bokútáni na ye na bilenge mpe mabótá, ekolamwisa motó ya boyambi, na bolendisi bangó ya kolona mpe kokoba na mambi kitoko ya bokristu. Ezali mbela mókó ya botatá mpe etóndi na bolingo ya boyokani, ya bosémbo mpe ya lobokó na boyambi, mpe mpósá mókó mpo ya likambo lilámu na bato bansó.

Mingimingi, Afrika ekobetama na makanisi ya bobébisi mpe ezua elembo ya bobola, ya kanyáka mpe ya mobúlú. Boni boni kosukisa molongó eye mpe eloko nini ya ntina bakatoliko bakoki kosála na makambo yangó?

Afrika ezali mokili mókó na bomengo ya bato, bonkoko mpe ya mokili, mpe nzokándé mingimingi koleka azali kobika na makambo miye bikokanga botomboli na ye: bobola, kanyáka, mobúlú mpe makanisi ya kobuba, ntángo mosusu biúti libanda, biye bikokotisa na mobola bato bazali na makási te. Kosukisa makambo maye ekosenga bomipesi mpe bokobi. Eklezia katoliko ezali n'Afrika na nzelá ya bitéyelo, balopitalo, bisika ya koyamba bato mpe misála ya likabo, biye bizali mingimingi eyano yókó ya sóló na bampósá ya ntina ya bato.

Kasi eyano ya Eklezia ekosuka na mosála ya likabo te: ekoleka lokolá na botéi ya boyébi mpe botéi ya bilenge na mambi ya lokúmu, ya bosémbo mpe ya bosálisani. Ezali waná nde bandimi katoliko babéngami ya kosála mosála mókó ya ntina, lokolá kaka bato bakoyamba liloba lyokó te, kasi lokolá basáli ya mbongwana ya bomoí na bangó, na masangá na bangó mpe na bisaleli na bangó.

Mpósá na yo nini mpo ya mobémbo ya bontómá eye, na mabelé mókó eye olingaka?

Mpósá ezali 'te mobémbo eye ya bontómá etika elembo yókó ya mozindo na balomeko misáto bikangemi makási: boboto, bosololi mpe bomáti ya Eklezia ya ekóló. Afrika ezali mokili mókó elenge, etóndi na boyambi mpe na bokási, mpe mobémbo ya Tatá-Esántu ezali ekela yókó ya botiyi motéma na lobí na ye, lobí lyokó eye Eklezia elingi kokoba kotambola elongo na moléndé mpe elikya.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

13 sánzá ya mínei 2026, 12:37