Luka

Misa na Sainte-Marie-Majeure mpo ya bokundoli mobu ya yambo ya liwa ya Papa François Misa na Sainte-Marie-Majeure mpo ya bokundoli mobu ya yambo ya liwa ya Papa François  (@VATICAN MEDIA)

Léon XIV mpe Eklezia bakokanisa François na Sainte-Marie-Majeure

Na basilique ya Libère, esika wápi sapele elobamaki mpe misa esálemaki mpo ya bokundoli mobú mwa yambo ya liwa ya papá y'Argentine, Papá Léon atindaki liloba lyokó esika nini alobi 'te «liwa ezali efelo te, kasi ekuke yókó eye efúngwami na ngolu eye Papá François alembaka kosakola te».

JR Bompolonga - Kinshasa

Lóza (rose) eye ya mpémbé, etíami pembeni ya nkombo «Franciscus», ezali elembo ya eye ebébaka te, ya eye ekúfaka te. Ezali waná mpe ekoloba lisusu 'te bomoí ya sékó ezali mwinda mókó ya pété kasi ya bomoí, bopéto kasi mingimingi bolingo mpo ya Tatá yókó oyo apesaki mingi na mokili, lokolá Papá Léon XIV alobaki yangó mokolo ya mibalé o eleko ya mobémbo na ye na Guinée équatoriale. Likoló ya lilita ya François, na basilique Sainte-Marie-Majeure, ezali bokeli bokó ya kuruze ya ntólo eye atambolaki na yangó eténi enéne ya bomoí na ye. Ba fololo ya mpémbé mpe ya manzáni (jaune) bibongisamaki libosó. Lilita ebatelami na Garde suisse mpe ba gendarme. Úta mobú mókó, ezali esika yókó ya mobémbo mwa boyambi, mpe na eleko ya Zúbile ya bolengé, pembeni ya bato 100 000 batelemaki waná kaka na mikolo minéi.

Bizali mitúya te biye bikolimbola libula ya François; ezali koleka yangó, mpe na ngonga, emoniseli na ye ya mosakoli na mokili mókó ekobongwana ntángo insó, ya Eklezia yókó eye ekokoba kobika «Nsango-Ndamu ya ngolu», ekómi polélé makási, ekomi Léon XIV na liloba lyokó etángamaki mokolo ya mibalé na pokwa o eleko ya misa esálemaki na basilique Sainte-Marie-Majeure, esika nini elobami lisusu 'te «molimo na ye etikali na bomoí na Eklezia mpe na mokili».

Pierre tombale mókó mpo ya kokanga nsinga yókó ya bolingo

Nsámbo mpe matómbeli bipesamaki na François, oyo aponaki esika eye mpo ya likundi na ye, «na mabelé, ya pámba, likambo mosusu te». Tokanisi ye na bolobi Sapele, ekambamaki na episkopo ya lokúmu Rolandas Makrickas na basilique, libosó ya sángó molandi ya Papá mpo ya dioceze ya Roma, episkopo ya lokúmu Baldo Reina. Na chapelle Pauline, esika wápi basambelaka, ezali elili ya Ngondo Maria, Salus Populi Romani, epái na ye François atikaka mibémbo ya bontómá mpe na lokoló na ye esika apesaka ye lokúmu mbala 126. Atikaka bapási mpe mabánzo ya mokili na maboko ya Ngondo mpe abaluka epái na ye, alingaka ye pembeni na ye o eleko ya losámbo na esika Sántu-Petelo, na 27 ya sánzá ya misáto 2020, nzokándé pandémie ezalaki kobeta makási, na bokangi bato epái na bangó mpe na bobongoli na mozindo.

Na súka ya Sapele, episkopo ya lokúmu Rolandas Makrickas alakisaki linzanza ya kokanisa, etiamaki na eténi ya mobáli ya chapelle, na bokundoli nsinga ya loléngé esusu káti ya Papá François mpe Salus Populi Romani. Nkomá na latin elobi «François, Papá wa Roma, oyo asambelaki mbala 126 na losámbo ya moléndé na lokolo ya Salus Populi Romani, apemi, ndéngé alingaki, na basilique eye ya Papá. Na 21 ya sánzá ya minéi 2026, bokundoli ya yambo ya liwa na ye».

Bokundoli bokó ya bomoí

Episkopo ya lokúmu Giovanni Battista Re, motomolo ya Collège ya baepiskopo ya lokúmu, asálaki misa mpo ya kokanisa Papá François na basilique bokó ezalaki na mwinda ya pété. «Mobú mókó sima ya boleki na ye úta mabelé kinó ndáko ya Tatá», elobaki episkopo ya lokúmu Re o ebándeli ya misa, «bokundoli ya bomoí ya Papá François etikali na mitéma mpe makanisi ya móķó mókó. Úto Afrika, Papá asangani na bisó mpe azali na molimo káti na bisó». Káti ya bandimi bilongi biyébani na Jorge Mario Bergoglio bizalaki, lokolá episkopo ya lokúmu Michael Czerny, préfet ya dicastère mpo ya Mosála ya botomboli moto mobimba, jésuite lokolá ye. Penepene na ye etelemaki episkopo ya lokúmu Giovanni Lajolo, oyo azalaka na conclave eponaka ye mokitani ya Petelo na 2013.

Ekuke ya ngolu

Sima ya botángi Nsango-Ndamu, episkopo ya lokúmu Re atangaki liloba ya Papá Léon XIV, oyo, úta Afrika, alingaki kozala áwa mpo ya kokanisa moto azalaki libosó na ye awaki mobú mókó eleki «o ntéi ya mwinda ya Pasika», na bosúkisi mobémbo na ye na mabelé «na esengo eye ya Nsango-Ndamu eye epesaka likanisi», ekomi ye, «yókó ya ba bolendisi na ye ya bontómá ya kokata koleka», Evangelii Gaudium.

“«Liwa ezali efelo yókó te, kasi ekuke eye ekofúngwama na ngolu eye Papá François alembaka kosakola te».”

Moyékoli-motindami

«Azalaki mokitani ya Petelo mpe mokengeli ya Eklezia ya mokili», elobi Papá, «na eleko yókó eye etiaka elembo mpe ekokoba kotia elembo na mbongwana mókó ya eleko, mbongwana mókó eye azalaki koyéba malámu, na bopesi na bansó litatoli lyokó ya mpiko eye ekolakisa libula lyokó ya ntina mpo ya Eklezia».

“«Abikaka litéya na ye lokolá eye ya moyékoli motindami, ndéngé alingaka koloba yangó».”

Akokaka kosimba motéma

Moyékoli kinó na súka, mpo azalaki «na lobokó na batisimo na ye mpe na bokuli na ye ya ministeli ya episkopo»; motindami oyo asakolaki Nsango-Ndamu ya ngolu «na bansó, bansó, bansó».

“«Ba bolámu amema na litatoli na ye lokolá mobateli ya bokébi bisimba motéma ya bato ebelé, kinó súka ya mabelé, likoló ya mibémbo mwa boyambi ya bontómá na ye mpe mingimingi na “mobémbo” na ye ya súka biye bizalaka bokono na ye mpe liwa na ye».”

Nsango-Ndamu mpe lokóta ya sika

Papá Léon XIV alobi 'te François akobisaki libula ya concile Vatican II, na botindi Eklezia ya kokoba etindá na ye, na bobengi ye kozala «mokengeli ya elikya ya mokili, asepelaka na bosakoli Nsango-Ndamu eye ekoki kopesa esengo enéne mpe bolámu na bomoí nionso».

“«Tokoyóka lisusu kolobama malendisi na ye, bilobamaki na ntoki ya bolobi mpo ya kokómisa nsango elámu eyambama koleka: ngolu, boboto, bondeko, nsolo ya bampate, lopitalo ya mboka, mpe makambo misusu lokolá. Mókó mókó ya maloba waná ekozongisa bisó na Nsango-Ndamu eye abikaka, na lokóta lyokó ya sika eye ekosakola Nsango-Ndamu waná lokolá kála».”

Bolingo mpo ya Maria

Na súka, Papá y'Amerika alobi bondimi bozindo ya Papá François epái ya Maria, moto ya mobémbo mwa boyambi na Roma na bopesi lokúmu na Salus Populi Romani mpe moto ya mobémbo mwa boyambi na mokili na botáli ba sanctuaire ebelé ya Maria. «Ngondo Maria, Mama ya Eklezia, asálisa bisó ya kozala na bileko binsó bapostolu balembaka te ya Mwána na ye ya bonzámbe mpe basakoli ya bolingo na ye ya ngolu».

Bakengeli ya libula ya François

Sima ya botángi liloba ya Papá, episkopo ya lokúmu Re atelemaki na maloba ya Léon XIV, biye bikoyókana lokolá «bobengi bokó ya mpiko ya kobátela libula ya molimo ya Papá François». «Libula lyokó», ekobaki motomolo, «etiami na mokuse, lokolá toyókaki yangó, na mwá maloba ya ntina bilobamaka na Papá François: esengo ya Nsango-Ndamu, ngolu (Nzámbe alembaka kolimbisa te), boboto, bondeko na mokili (tozali bansó bandeko), nsolo mpimbó ya bampate, Eklezia lokolá lopitalo lyokó ya mboka, botóngi ba gbagba mpe bifelo te». Bizali waná matéya biye esengeli kobátela mpe ya kobotisa mbuma: «Mama ya Nzámbe mpe Mama na bisó, alingami mpe akumbami koleka na Papá François, oyo alingaki akundama na sanctuaire eye ya Maria, asálisa bisó».

Elikya

Papá François azali lokolá na makanisi ya losámbo, mpenza na bosakoli Nsango-Ndamu eye etika elembo na bomoí na ye, na bokanisi bolingo na ye mpo ya bána mike mpe baye bazanga koleka. Misa esilaki na lokúmu epesamaki na baepiskopo ya lokúmu na lilita ya Papá François. Motomolo ya basilique ya Libère abenisaki pierre tombale, na bolobi 'te «elikya epesaka mawa te», «Spes non confundit», nkombo ya bulle d'indiction ya Zúbile. Elikya, o káti ya Mobú Esántu eye Papá François afúngolaka na 24 ya sánzá ya zómi na mibalé 2024, ezali leló «lóngo» ená eye, atá sóki ekoti na zelo, ekosimba bisó tokangemi na bomoí mpe, mingimingi, na Kristu. Mpe ezali ntángo mosusu waná libula ya sékó ya Papá eye «bandeko baepiskopo ya lokúmu» bakendeke koluka «na súka ya mokili».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

22 sánzá ya mínei 2026, 13:24