Mmelo Helen Alford, mokambi ya eteyelo y papa  ya nzebi ya bato. Mmelo Helen Alford, mokambi ya eteyelo y papa ya nzebi ya bato. 

Etéyelo ya nzebi ya bato ekotála bosáleli ya bokónzi

Libosó ya eleko yókó ya géopolitique ekobongwana, Etéyelo ya papá ebongisi esika yókó na makambo-makonzi ya boyébani na mobéko (légitimité), ya demokratie mpe bolimboli molongó ya mokili, o eleko ya lisangá mpo ya bansó eye ekobánda mokolo ya mibalé.

Vatican News

Mokolo kaka Papá Léon XIV akomata pépo mpo y'Algérie na mobémbo na ye ya bontómá n'Afrika, na bolobi lisusu «te» na ye na etumba mpe na bolendisi bakambi ya mokili ya kozua ba nzelá mpo ya boboto, likita lyokó ebongisamaki na Vatican mpo ya kokanisa na mituná mitáli etamboli ya bokútáni géopolitique.

Sima ya masoló mibalé na 1998 mpe 2 000, bitalaki boyékoli likambo ya demokratie na ba loléngé bikeseni ya sika, Etéyelo ya papá ya nzebi ya bato ekotála, kobánda mokolo ya mibalé 14 ya sánzá ya minéi, «Bosáleli ya bokónzi: boyébani na mobéko, démokratie mpe bolimboli lisusu ya molongo ya mokili». Sóki, yambo ya mobú 2000, démokratie emonanaka lokolá kongómbéla (horizon) yókó ya kotika pembeni te mpo ya bikóló binsó bizali kotombola bomoí (civilisés), ezaleli ebongwana makási sima ya mibú ntuku misáto sima. Libosó ya mokili mókó ekobongwana, ezui elembo ya likámá ya ba demokratie ya bonsómi mpe bolimboli lisusu molongo ya mokili na ndéngé mbano bikeseni ya géopolitique, boyékoli likambo ya lobí ya ba mpósá ya demokratie mpe, mingi mpenza, ba ntina ya mibéko ya bomoí ya politiki, ekokonza lokolá lisengeli lyokó.

Matéya ya Eklezia ezali liziba lyokó ya likanisi mpo na yangó: alobaka kaka 'te demokratie ezali ndéngé ya mobéko ya kokoka te, kasi ekoyangélama na makoki bikangama na lokúmu ya moto mpe esengeli kobatelama na ndéngé ya politiki na motindo mókó ya mibéko elongobami na mobéko ya mokili, eye epesi ba ndelo polélé na bokónzi ya politiki mpe ekosálisa bolámu ya bansó. Lokola Papá Léon XIV na 30 ya sánzá ya mitáno 2025 alobaki lisusu: «nzelá ya boboto ekosenga na makasi mitéma mpe milimo bibongami na litungisi ya moningá mpe bikoki komona bolámu mpo ya bansó na mokili ya leló. Nzelá ya boboto etáli yókó yókó mpe ekomema na botomboli ba bokútáni ya sémba káti ya bato bansó bazali na bomoí. Lokolá elobaka Yoane-Polo II, boboto ezali eloko yókó ya kokabola te; ezali mpo ya bansó to ya moto te (cf. Sollicitudo Rei Socialis, 26). Ekoki kokóma mpenza ya sóló mpe ebikami lokolá bosóló bokó ya bomoí mpe bomátisi bokó ya mobimba eye sóki ezali na boyébi ya mókó mókó "moléndé mókó elenda mpe ya mbámbá ya komipesa mpo ya bolámu ya bansó"»

Lisangá mpo ya bansó ekotála mituná bitáli bokónzi mpe boyébani na mobéko, ya demokratie ya bonsómi mpe na maloba na ye, na bobongisi lisusu ya molongo ya mokili. Misála ya bato ya etéyelo bikofungwama na mokambi, motéi Helen Alford, mpe masoló bikokambama na Vittorio Hõsle (Université Notre-Dame, États-Unis), Rodrigo Guerra-López (Commission pontificale pour l’Amérique latine), Krzysztof Wielecki (Université de Varsovie), Fabio Ferrucci (Université du Molise), Niraja Gopal Jayal (King’s College de Londres) et le cardinal Stephen Chow Sau-Yan (Diocèse de Hong Kong).

Nzokándé tokomona na bokómi ya molongo ya sika ya mokili, ezali na ntina ya komituná na mayéle mpe ba ntina ya bokwéi na ye, ba botaú na ye mpe bokabwani na ye biye bisálisi ba bozongisi ya mozindo mpe ya makási na maye tokomona leló. Mpe mingimingi, na eye ekoki kosálema, na ezalela ya sik’oyo, mpo ya kolaka bosémbo mpe boboto.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

15 sánzá ya mínei 2026, 14:25