Luka

Akademi ya Papa mpo ya Eklezia Akademi ya Papa mpo ya Eklezia 

Episkopo ya lokúmu Parolin: Akademi ya Papá mpo ya Eklezia, liziba ya boboto mpo ya mokili

Na lisoló lyokó epesamaki na ba média ya Vatican, episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá azongeli mibú 325 ya etéyelo eye etángisi batindámi ya lobi ya Papá mpe eye ekoyamba sima ya nzanga botáli ya Léon XIV. Etindá na ye ya ntina ezali ya kobongisa banzelá bisálemi na mibéko, mitindo mpe bisaleli bikolaka molongó káti na bikóló.

Vatican News

Kobongisa «banzelá ya sóló mpo ya boboto, bisálemi na mibéko, mitindo mpe bizaleli ya bolaki molongó káti ya bikóló», mingimingi na eleko ya sik’oyo ya likámá ya molongó ya mokili: waná ezali etindá epesama n'Akademi ya Papá mpo ya Eklezia, ekelama na 25 ya sánzá ya minéi 1701. Ezali ndéngé episkopo ya lokúmu, Pietro Parolin alobi, na lisoló ená epesamaki na ba média ya Vatican o eleko ya bokundoli mibú 325 ya bokeli yangó. Ezali Papá Léon XIV oyo akokamba bokundoli yangó na bokéi, mokolo ya yambo 27 ya sánzá ya minéi, mpo ya mbala ya yambo úta boponi na ye, na esika ya Minerva, na etéyelo eye eyékolisa bantómá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo.

Etéyelo yókó ya makási ya mibú nkámá misáto na ntuku mibalé na mitáno ya lisapo mpe ya mosála, ebengami ya kolonga mikakatano ya leló na mokolo mókó ya sika. Na mokuse nini tokoki koloba bongo na bokundoli eye?

Akademi ebengami ya kotéya bantómá ya Papá, baye, na bikóló mpe mabelé loléngé na loléngé, bakolakisa Mokitani ya Petelo. Babéngami ya kosála yangó na bokébi mpe mayéle, na botáli bizaleli mpe makambo, na bosololi na bato na bomoni mpósá na bangó mpe nini balingi. Na ndéngé waná bamilakisaka na Eklezia mpe na mokili, bazali na mpósá ya bobándi ená ya motindámi eye ekókomisa bangó banzeneneke -ya sóló mpe babongisami- ya bolámu eye Papá amemaka na ba Eklezia ya bikóló mpe na bato ya Nzámbe, na lokolá ekela eye babulamatari bakosála epái ya lisangá ya ye mókó ya bato mpe masangá ya mokili bikosála mpo ya libótá ya moto.

Mpo ya baye balingi kotéyama n'Akademi, ntina ya etindá na yangó ezali nini?

Na bokeli na yangó, na 1701, Akademi ezalaki kosála na mokili mókó esika wápi Eklezia epikamaki makási. Leló, na botéi basángó ya ba dioceze bikeseni ya mokili, esengeli kosála kéba na bizaleli epái wápi bosóló ya Eklezia ezali ya kobwaka makolo mpo ya yambo, esika ezali na ndelo mpe ekonyokwama, to lisusu esika wápi likambo ya eyamba ezali na ntina te. Lisusu, botéi ekopesama n'Akademi esengeli kobongisa na bobundi na bisalelo ya lisangá ya mokili zambi ya kozala na masoló, ya koyéba makanisi minéne mpe ya kotála nini ezali na káti. Yangó waná etindá ya boyékoli mpe botéi y'Akademi ezali mpenza mpenza ya Eklezia: na bobongisi bantómá ya lobi, Akademi ekotála bozali ya bisaleli ya Eklezia na bikóló bikeseni  -bitindá na Masangá ya baepiskopo-, yangó ekobimisa ekela ya Ngwendé ya Sántu-Petelo koleka mosála na ye ya pamba, mpo ekobenga ye na botáli bokó ya bokébi ya bosóló ekobongwana ntángo insó mpe na bososoli bokó ya péto na bosálisi kopesa ntina na makambo mpe ya kobongisa bikela ya sóló. Na ndéngé waná, botéi ya bayékoli ekoluka kaka kokotisa káti na bangó likambo lyokó ya motúya te, kasi lokolá ya komatisa mitúya yangó ya bonganga-Nzámbe biye bizali bozali penepene, boyóki, lisoló mpe litatoli, na bomikitisi mpe pété.

Na ekela ya ye ya súka ya mosála na ye, Papá François abongolaki Akademi. Nzelá nini chirographe apesaki yangó? Mpe mingimingi, yangó elingi koloba nini mpo ya boyékoli ya bantómá ya Papá?

Nakokundola lisusu 'te, o eleko mókó ya ba bokútáni na ye na bisó, bantómá, papá François apesaka bisó elili yókó: «Basángó, ba valise na lobóko». Ya sóló, bantómá mpe batindámi ya bontómá, batáli, batindámi ya bileko binsó, ba conseiller, ba secrétaire, ba attaché: bizali waná bankombo te, kasi bilongi ya mosála mókó ya bonganga-Nzámbe mpe ya mopalinginyi nsango-elámu. Yangó ememaki kobongisa lisusu etamboli ya boyékoli y'Akademi, ya kozongisa sika esaleli na ye mpe kondima mibéko na ye ya sika.

Makambo ya sik’oyo bikotatola mosála mókó ya bontómá eye ekela ezali na ndelo te mpe eye ekomilakisa ezangi likoki ya kolaka, kokamba mpe kosilisa bitumba. Ezali waná liyoki lyokó eye Ngwendé ya Sántu-Petelo ekokabola lokolá? Eyano nini Akademi ekoki kopesa?

Nakobánda na eténi ya mibalé ya motuná. Bayékoli y'Akademi bakoki koyékola na esika yókó ya ntina na ba nzebi ya bontómá likoló ya botáli bokó ya sika ya boyékoli makambo ya bosémbo, lisapo, politiki mpe ya nkita, na bomátisi likoki lyokó ya nzebi ebongisami na mókó mókó ya makambo na yangó. Manaka ya boyékoli bikozanga te, epái esusu, ya kobátela nsinga yókó na makambo ya eklezia, loléngé ya mosála ya Curia ya Roma mpe, na bonéne, na mosála ya bopalinginyi Nsango-Ndamu ya Eklezia na boyókani na lingómbá mpe momeseno ya bato. Na súka, bizali waná biténi bikokokisa ekela ya bontómá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Kasi, na mwinda ya eye tokotanga mpe tokomona mokolo na mokolo, nionso ezali ya kokoka te mpo ya ntómá oyo abengami kotatola yambo ya kosolola. Bozui boyébi ya kokoma ekokende nzelá mókó na ndéngé ya bomoí eye ekoleka loléngé lyokó ya mosála eye ekosálisa ntómá ya papá ya kososola na mozindo ba bokasi ya boyokani ya bikóló mpe ya komindimama na bolimboli biloko bikolukama biye ekoki kokokisama, na kotia pembeni te eye esengeli kokutana na yangó. Eyano na likámá ya molongó ya mokili, elukami na boluki bokási mpe na bonyati mibéko ya sémbo ya mokili, ekoki kozuama kaka bolimboli ba nzelá ya sóló mpo ya boboto, bikelami na mibéko, mitindo mpe bisaleli bikolaka molongo káti na bikóló. Waná ezali etindá eye ekwéi leló n'Akademi ya Papá mpo ya Eklezia, mibú nkámá misáto na ntuku mibalé na mitáno sima ya bokeli yangó.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

29 sánzá ya mínei 2026, 09:58