Luka

Misa ya biyamba binso mpo ya boboto na Roma Misa ya biyamba binso mpo ya boboto na Roma 

Episkopo ya lokúmu Koch akolikya 'te bamartíro y'Arménie bakoka kosálisa mpo ya bomókó na mobimba

O eleko ya misa ya biyamba binsó (œcuménique) na basilique Saint-Barthélémy-en-l’île na Roma, mpo ya kokanisa Medz Yeghern, Mabé Monéne, bobomi ya baí-Arménie na Etumba ya Yambo ya mokili, episkopo ya lokúmu Kurt Koch atindáki liloba lyokó. Préfet ya dicastère mpo ya Botomboli bomoko ya bakristu alobi «lisangá ya sóló na Elimo Sántu» ya bamartíro y'Arménie na bakristu basusu.

Vatican News

Libosó ya mokolo ya bokanisi Medz Yeghern, Mabé Monéne, na botáli babobomi ya baí-Arménie na Empire ottoman na 1915, o káti ya etumba na mokili, misa mókó ya biyamba binsó mpo ya boboto na mokili ematisami na lisangá Sant’Egidio mpe Batindami ya Eklezia y'Arménie epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, esálemaki mokolo ya minéi 23 ya sánzá ya minéi na basilique ya Roma Saint-Barthélémy-en-l’île, na esanga Tibérine, o ntéi ya etuka. Libosó lokolá ya batindami ya College ya Papá y'Arménie mpe ya basángó mékhitariste ya Venise.

O eleko ya molúlú, liloba lyokó ya episkopo ya lokúmu Kurt Koch, préfet ya dicastère mpo ya Botomboli bomoko ya bakristu etangamaki. Na mokánda ená, moto ya mayéle ya boyókani o ntéi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo alobaki mibalé ya mikánda ya Concile Vatican II, Unitatis redintegratio mpe Lumen gentium, na nzelá na yangó batatá ya Concile bagumbamaki «libosó ya bamartíro ya bonkoko nionso ya bokristu» mpe bandimi na bangó «lisangá ya sóló na Elimo Sántu».

Eleko yoko ya misa ya biyamba binso
Eleko yoko ya misa ya biyamba binso

Martiro, motéma ebetaka ya Eklezia

Ezali kaka na elimo ená ndé esálemaki misa eye ekokanisa «martiro enéne mpe ya makila ya bakristu y'Arménie o ebándeli ya ekeke eleka» loléngé ya maloba ya episkopo ya lokúmu. Bato ya makámá ya Mabé Monéne ená bizali «banzeneneke baye bakoyébisa bisó lisusu boni boni martiro ezali likambo lyokó ya libandá ya bokristu te, kasi motéma na ye ebetaka esika nini Eklezia emimonisaka na Kristu, Nzeneneke ya ntina ya bolingo ya Nzámbe».

Bamartíro y'Arménie bazali o káti mobimba ya «bamartíro ya lisangá» elobamaka na Yoane-Polo II mpe eye esangisi «bakristu koleka bokabwani na bangó na "eyamba ya sóló ya makila"», elobaki préfet. Mosika ya kozala likambo lyokó ya lisapo ya eleko yókó eleka na súka ya «bokónzi ya makila ya minéne ya ekeke ya 20», «botuti ya bakristu kaka esilaka te, kasi ekobaka lisusu makási na bipái bisusu ya mokili», emonaki episkopo ya lokúmu Koch oyo akolikya 'te «makila ya banzeneneke ebelé ya leló ekóma mboto ya bomókó ya lobi ya nzóto se mókó ya Kristu, ekatani na bokabwani ebelé».

Episkopo ya lokúmu Koch apesaki mpósá na ye 'te banzeneneke biná bazala elongo na losámbo lya bangó ya leló «na nzelá ya bomókó na mobimba, mpe 'te makila na bangó ekoka kopusanisa mokolo ebénisama epái wápi tokomela bansó na kopo kaka mókó ya Libiki».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

25 sánzá ya mínei 2026, 08:28