Luka

Léin XJV na Mongomo; na Guinée équatoriale Léin XJV na Mongomo; na Guinée équatoriale  (ANSA)

Biyamba bizali nzelá yókó ya litómba mpo ya boboto

Episkopo ya lokúmu George Koovakad, préfet ya dicastère mpo ya Bosololi káti ya biyamba, asáli bilá ya mobémbo ya bontómá ya Papá Léon XIV n'Algérie, Cameroun, Angola mpe Guinée équatoriale, na botáli bokó ya káti ya biyamba.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Makambo ya káti ya biyamba ya mobémbo ya bontómá ya Papá Léon XIV bizalaki mpenza na ntina, mingi n'Algérie mpe na Cameroun, kasi lokolá o eleko ya masikulu na ye na bakambi mpe bantómá n'Angola mpe na Guinée équatoriale. Mibémbo biye bilakisi emoniseli yókó ya bomókó ya bosololi káti ya biyamba lokolá nzelá ya litómba mpo ya boboto, boyókani mpe ya botélemisi (stabilité). Mobémbo na nionso ebimisi nsinga yókó ya bosangisi, esika wápi bikela ya bilembo mpe maloba bikokende epái ya botáli kaka epai mókó ya boyékoli mambi ma Nzámbe na mozindo mpe ya mobateli.

N'Algérie, mobémbo elakisamaki úta ebándeli lokolá likanisi lyokó ekoluka kotónga ba gbagba mpe ya kotombola boyókani. Papá abéngaki eleko eye «libakú ya ntina ya kokoba, na mongongo mókó, na liloba kaka mókó, eye ya tolingi kopesa: kotombola boboto, boyókani, botosi mpe bosepeli mpo ya bato bansó», na bokundoli sántu Augustin lokolá «gbagba yókó ya ntina na bosololi ya káti ya biyamba». N'Alger, na lisikulu na ye na bakambi, atiaki bondeko ya mokili o ntéi ya makanisi na ye: «Tozali bandeko babáli mpe bási, mpo tozali na Tatá mókó na likoló», na bolakisi 'te boyambi ezali mobéko mókó ya bokútáni ekoki kosálisa bosémbo, bosálisani mpe boboto. Nzelá ená ekokisamaki na bikela na ye, mpenza o eleko ya botáli Mosquée Enéne, esika wápi alobaki «lokúmu ya moto mókó mókó» mpe asakoli: «Tokoki koyékola komitosa basongolo na bapakala, ya kobika na boyókani mpe ya kotónga mokili mókó ya boboto». Liloba etikali na buku ya wólo –«Mawa ya Nkolo ya Nguya ebatela bato ya lokúmu y'Algérie mpe libótá nionso ya moto ya boboto mpe ya bonsómi»- epesi na mokuse emoniseli ená ya mokili. Na Notre-Dame y'Afrika, bosololi emibimisaki na loléngé ya bosóló mpe ya mokolo na mokolo, lokolá litatoli liloba ekoloba 'te «boyambi bokó eye ebombanaka te kasi efúngwamaka, eye ekosangisa kasi ekotungisa te, eye ekosangisa kasi ekoluka bokokani te». Na Annaba, botáli ya Augustin ekangisaki botámboli na lomeko lyokó ya molimo ya mozindo koleka, na bosangisi bolukiluki ya Nzámbe na botóngi ya boboto mpe ya likabo: «boyambi na Nzámbe yókó...esangisi bato mpóna bosémbo bokó elongobami, eye ekobenga bansó na bokabi».

Na Cameroun, na eleko yókó ezui elembo ya mokakatano ya baye balobaka anglais kasi ekómaki etumba ya eyamba te, Papá alobaki polélé mosála molámu ya biyamba ntango babungi te na «ngenge ya fondamentalisme». Na lisikulu na ye na bakambi, abengaki ya «koboya likanisi ya mobúlú mpe ya etumba» mpo ya koyamba «boboto bokó ezanga mondoki…mpe ekolongola mondoki», na bobéti nsete na mokumba ya bansó ya Letá mpe ya bakambi ya biyamba na bokébisi bitumba. Eleko ya motúya ezalaki bokútani ya Bamenda, epaí wapi bakambi ya biyamba bakristu, musulman mpe ya bonkoko bapesaki litatoli lyokó ya sóló ya bondeko esálema. Imam asakolaki: «Tokotondo Nzambe ‘te mokakatano eye ekómaka na etumba ya eyamba te… », nzokandé Papá alakisaki Lisangá mpo ya boboto lokolá «ndakisa yókó mpo ya mokili mobimba», na bokébisi «baye bakomisi biyamba bisaleli na bangó…mpo ya makambo ya bangó mókó». Likambo liye elakisaki boni boni bosololi káti na biyamba ekoki kobotama na lisapo lya bansó ya monyoko mpe ya komibongola na nzelá ya boyókani. O eleko ya ba bokútani na batindami musulman mpe baepiskopo, Papá Léon XIV abétaki nsete na mokumba ekabolami ya kotónga boboto mpe na lisengeli ya lisoló lyokó ya sóló, ekoki ya kondima bokeseni na káti ya masangá ya biyamba mpe ya komatisa bopalinginyi bokó ya sóló.  

N'Angola, na bolobi na bantómá, Papá akolisaki botáli na ye ya mokili y'Afrika mobimba, na bosakoli mikakatano bisangani na bitumba mpe na ba bokabwani: «Afrika ezali na mpósá na lombango ya koleka bizalela mpe makambo ya etumba mpe bozangi boyókani...Ezali kaka na bokútáni ndé bomoí ekobonga. O ebándeli ezali lisoló». Na ndéngé waná, abéngaki lokolá litéya ya Papá François, na bolobi bokobi matéya na lisoló ya boboto.

Na Guinée équatoriale, abetaki nsete na mitúya bikabolami lokolá botéi ya ba boyébi mpe botiyi o káti ya bolámu ya bansó, na bosakoli: «Na mokili mókó ezoka na loléndo, bato bazali na nzala mpe mpósá ya bosémbo», mpe bozongeli mbela ya Papá François: «Leló, tosengeli koloba te na nkita yókó ya bolongoli mpe ezanga bokokani. Nkita eye ekoboma».

Na bilá na ye ya nionso, Léon XIV alobaki polélé libula ya Papá François, na bolobi bomipesi na ye mpo ya «bondeko ya mokili» mpe ya «botosi ya sóló ya mibáli bansó mpe bási bansó». Mobimba ya nzelá ekomonana elekami na makambo-makonzi ebelé ya bosangisi: bondeko lokolá ntina ya bobiki elongo, bokitisi na likambo bosáleli nionso ya mabé ya eyamba mpe mosála makási ya bakambi ya biyamba na bokátikáti ya bitumba. Na loléngé ená, ba nzebi biyébani na bikóló bikeseni bizali ya kobombana te, kasi bizali likanisi lyokó ya bomókó mpe ya sóló na boluki ya kotombola, na mokili ya leló, lisoló lyokó káti ya biyamba ekoki kobátela boboto, bosémbo mpe bobiki elongo na kimia káti na bato.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

24 sánzá ya mínei 2026, 12:45