Ntómá ya Papá na Libá pembeni ya bato na sudi ya ekóló
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
"Kaka sik’oyo, naúti koyóka lokito lyokó koúta na ndáko ya ntómá ya Papá... Waná elingi koloba 'te bitumba bizongi na Beyrouth". Episkopo Paolo Borgia, ntómá ya Papá úta 2022 na Libá, atatolaki na nzelá ya singa mokolo ya mitáno 13 ya sánzá ya misáto úto mwá ngómbá Harissa, ezali na kilometele 25 ya Beyrouth, bokwéisi ya ba bombe ya Israël bikosálema bánda mikolo ebelé. Pembeni na ye etelemi ekeko ya Notre-Dame ya Libá eye, ekozua mwá mwinda ya pembe, ekumbi botáli bokó ya mawa na mboka-mokónzi eye ya Moyen-Orient ekomonana lokóla ekoyéba boboto te.
Mgr Borgia azongaki "epái na ye" eleki mwá ngonga. Mikolo mileki, akendeki na Qlayaa mpo ya kozala na bokundi sángó Pierre El Raii, sángó-mokónzi maronite babomaki ye o eleko ya mobúlú ya mokolo ya yambo 9 ya sánzá ya misáto, ntángo alingaki kosálisa mobáli mókó ya paloise azokaki. Ntómá akendeki na sima na bituka ya Sudi, epái wápi azalaki elongo na kaminyó moko "ememaki tóni 15 ya lisálisi bipesamaki na Œuvre ya Orient"
Kokitisa mpe kokabola biloko
Na ba réseaux sociaux ya Libá, bilili mpe ba vidéo ya motindami ya Papá, alati zambala, mokabá móķó mpe kalóti yókó, akokitisa biloko mpe ba sáki, bitámboli makási koleka. "Togúmbaki mabóko mpo ya kokitisa eye nionso eyaki zambi ya kokoka kokende. Leló, totálaki bituka motóbá, kaka na engúmba ena, mpe tokutanaki na masangá", elimboli ye. "Masangá maronite, masangá bisangana bakristu, orthodoxe, grec-melkite mpe latin, na lokóla masangá grec-orthodoxe to maronite na ba druze mpe ba sunnite".
«Nzebi yókó ya kitoko, eleko yókó kitoko ya bondeko", elimboli episkopo, oyo aseki na bolobi bokómi na ye na ndáko-Nzámbe mókó moke na yókó ya bituka bina. Kaka na eleko azali kofukama libosó ya lotale, nkito misáto ya bombe bibetamaki. Moto mókó ayébisaki ngai: "Episkopo, batombeli yo boyéi elámu". Tosekaki yangó...».
Botiyi motéma na Papá
«Bato bazalaki na mpósá ya lisúngi moke mpe mingimingi koyóka liloba lyokó ya Papá; bazali kotiya motéma makási na Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe mingimingi na Papá oyo bamonaki áwa na Beyrouth mpe na ye nsinga yókó ekelamaki”, elobi Mgr Borgia, na bokundoli mobémbo ya Léon XIV na Libá na sánzá ya zómi na mibalé elekaki. Botáli ya Papá elakisaki eleko yókó ya bopemi libosó ya nsómo ya etumba káti na Israël mpe Hezbollah, kasi eye ezongi lisusu na motindo mobúlú emáti lisusu na Moyen-Orient.
Ba balabala bizui ba bombe
«Yango eyókisi bisó pási 'te, sima ya bolongui na bisó na esika ena, ba balabala bisusu bizui ba bombe. Qlayaa, sima ya boyambi bisó, sima ya eleko ena ya bokaboli, ekangemi sik’oyo mobimba, lokóla bituka bisusu na engúmba ená kaka. Emonani lokolá babándi kokáta balabala ya boyebisi na Sudi... Tolikya 'te etumba esila sik’oyo mpe 'te kimia ekoka kozonga", ebondeli ntómá.
Bobángi mpe elikya
«Hezbollah, ekobaki ye, ekobwaka ba missile, ba roquette, nionso eye akoki epái ya Israël, ntángo mosusu na ndéngé mókó ya kolandana makási. Israël, ndakisa, akobwaka na loléngé ya kopona na Dahieh: motuka mókó, ndáko yókó, eténi yókó ya lotéle, ndáko yókó esika wápi bato bazali. Biténi ya mboka nionso ya ba chiite áwa na Beyrouth bizali sik’oyo polélé, mpo ezali na bobimi bokó ya bato ya kondima te. Pembeni na bato 800 000 bamikomisaki na esika mpo ya kozua lisálisi na ministeli ya Makambo ya bato, nzokándé bisika bikoyamba bato 120 000. Bato na bisika bazali na bobángi. Ezali ezaleli yókó ya ndéngé waná, tolikya 'te nionso ekokende malámu...»
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.