Smartphones mpe intelligence artificielle Smartphones mpe intelligence artificielle  (ANSA)

Ngwendé ya Sántu-Petelo: koyekola koyéba makámá ya makanisi mabé bitáli lopóso na IA

Na nsakola yókó elobamaki o eleko ya likita lya bokundoli mibú 60 ya Mokolo ya mokili mobimba mpo ya bosilisi bokesenisi ya lopóso, batindami ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU babengi na bolendisi momeseno na internet, zambi ya kotéya bato na « ndéngé eye ba algorithmes bikoki kokamba bomoni mpe kobébisa lokúmu ya moto»

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Mabé ya bokesenisi «esálema na makanisi ya lokutá ya boleki ya lopóso» ezali sik’oyo na internet, na ba loléngé ya Intelligence artificielle (IA) bikoki kobimisa lisusu «makambo mpe makanisi bizali na esika eye bikozuama».

Na bosimbi likákoli ya Papá Léon XIV na Nsakola na ye mpo ya mibú 60 ya Mokolo ya mokili mobimba mpo ya boyébisi bato, batindami ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU, na nsakola elobamaki o eleko ya likita lya bokundoli mibú 60 ya Mokolo ya mokili mobimba mpo ya bosilisi bokesenisi ya lopóso, eye esálemaki na 23 ya sánzá ya misáto, na New York, babengaki na «bolendisi bokó ya makási ya botéi, mpenza na likambo ya botángisi nkomá ya internet, zambi kotéya bato na ndéngé eye ba algorithmes bikoki kokamba bomoni mpe kobébisa lokúmu ya moto».

Boboyi likambo ya lopóso, kondima lokúmu ya moto mókó mókó

Ngwendé ya Sántu-Petelo elobi lisusu «bopameli na ye mobimba mpe makási ya likambo ya lopóso mpe bokesenisi ya lopóso na loléngé na ye nionso». Alobi 'te na mibú 60 ya bosakoli ya bokundoli eye, bokobi ya likambo lya lopóso «ekozua makási na yangó na boboyi kondima 'te lokúmu ya káti ya moto mókó mókó ekotála ntina na yangó te mpe boleki ya makambo te». Mpe sóki, na yambo, likambo lya lopóso «ekosála lokóla kokoba komilakisa na ndéngé ya bokesenisi esálemi na makanisi ya lokutá ya boleki ya lopóso», na loléngé lyokó ya mozindo, mabé ená ekosála na nzelá bikelakela ya mwá mayéle mpe ya bosangisi, lokolá biye bizali na internet.

Politiki mpe misála bikoluka kobátela makoki ya bansó

Na nzelá ya bimekiseli ya Intelligence artificielle, «bisálemi na ndéngé baye bakosála yangó bakomona mokili», etelemeli Papá, makanisi ya mabé lokolá biye ya lopóso bikoki kokonzama. Na botáli mikakatano miye, esúkisaki Ngwendé ya Sántu-Petelo, ekoki te kotelemisa mpósá ya politiki, sóki «ekokende elongo te na bomipesi ya sóló ya kondima lokúmu ekokani mpe makoki ya moto mókó mókó».

Lokolá elobaki yangó Léon XIV na nsakola na ye na bilama ya Lisangá ya batindami bandimama epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mobú eye, «bato bakelami na elili mpe na bokokani na Nzámbe oyo, na bobengi bangó na bomoí na bolingo, abengaka bangó mbala mókó ya kolinga». Kobalola likanisi liye na politiki mpe na misála «ekoki kolembisa misisa ya likambo lya lopóso mpe kolendisa ba nsinga ya libótá ya bisó ya mokili».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

26 sánzá ya mísáto 2026, 14:14