Luka

Eoiskopo ya lokumu Pietro Parolin, Eoiskopo ya lokumu Pietro Parolin,   (ANSA)

Na bopúsani pembeni ya Pasika, episkopo ya lokúmu Parolin abengi súka ya etumba

O eleko ya mokolo mókó ya boyékoli na Ndáko ya kobomba ba búku ya Vatican ebonzama na Alcide De Gasperi, ministre wa yambo ya kála ya Italie, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ayanolaki na mituná ya bapanzi nsango mpe abimisaki elikya 'te milulu ya Mpóso Esántu bikoka kosálema na Mabelé Esántu, atá na káti ya bisika bisántu.

Vatican News

«Kosilisa libómá eye ya etumba». Waná ezali mbélá ya Secrétaire ya Letá, Pietro Parolin, ebwakami epái ya bapanzi nsango, na mokolo ya boyékoli ebonzama na ministre wa yambo ya kála ya Italie Alcide De Gasperi, eye esálemaki mokolo eye ya minei 26 ya sánzá ya misáto na Ndáko ya bobombi ba búku ya Vatican. Makanisi na ye epái ya Mabelé Esántu eye ekobongama ya kolekisa Mpóso Esántu mókó na ba ndelo mpe bopekisami, likoló ya etumba. Episkopo ya lokúmu alobaki elikya 'te «atá na káti» ya bisika bisántu, lokolá basilique ya Lilita-Esántu, «milulu bikoka kosálema».

Na bopúsani pembeni ya Pasika, alobaki lisusu mbélá na ye ya kosilisa mobulu: «Pasika ezali eyenga ya boboto, boboto ya Mokónzi asékwi, mpe ezali bôngó libakú lyokó mpenza ya kozongela mbélá ená mpe kosilisa liboma eye ya etumba».

Litéya ya milulu mya losámbo lya misa esengeli kozala liziba ya etumba te

Motuná móķó etunámaki na episkopo ya lokúmu etáli misa ya momeseno, mokolo elandi bobimisi ya nsakola ya Papá -etiamaki mokoloto na Secrétaire ya Letá ye-méi- mpe etindamaki na baepiskopo ya Fránsa basanganaki na Lourdes. Léon XIV abimisaki bobángi na ye libosó ya likambo 'te «mpótá mókó ya pási ekokoba kofúngwama na Eklezia na likambo etáli bosáli misa» mpe asengaki ya «koyamba malámu bato bakangami ya sóló na Vetus Ordo». Kaka na likanisi ená, episkopo ya lokúmu alobaki lisusu 'te «litéya ya milulu mya losámbo lya misa esengeli te kokóma likambo lyokó ya etumba mpe ya bokabwani káti na bisó». «Ekozala ya kozua motindo eye ekoki koyanola na bosenga ya sóló. Nakanisi 'te ekoki kozala, na bosáli litéya ya milulu mya losámbo lya misa esika ya etumba te».

Na Italie, bosálisani bokó mpo ya bolámu ya bansó

Na eye etáli likambo ya politiki na Italie, mwá mikolo sima ya bilembo ya etúneli ( référendum) eye eboyaki mwángo ya bobongoli mobéko-likonzi ya bosémbo, episkopo ya lokúmu Parolin -na bosemboli 'te ezali «kaka pási ya koloba makambo ya Italie»- alobaki «mbano enéne» elakisami na baí-Italie mpo ya liponami ená, eye emonanaki na «baponi ya ntina». «Nakanisi 'te tokamwaki bansó mwá moke na motángo ya baponi...Nandimi, elobaki Mgr Parolin na bapanzi nsango, 'te esengeli kozala na bwanya ya kolinga nionso waná, kasi moto na moto engebene na likanisi na ye, mpo ezali na ba ndimbola bikeseni koleka motángo ya baponi na esika ya litomba ebimi».

Mpósá, na botáli lokolá mwá mikakatano ya politiki o ntéi ya bulamatáli ya Italie, ezali 'te «nionso ekoka kosálisa na boyokani bokó enéne mpe bosálisani, kaka na ndéngé ya malámu ya bansó mpo ya ekóló».

 

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

27 sánzá ya mísáto 2026, 14:07