Luka

Bendele ya Vatican Bendele ya Vatican 

Mwási mókó ya nzebi ya mosolo y'Afrika alubolami n’Akademi ya Papá ya Nzebi ya bato

Dr Vera Songwe, yókó mokambi ya Etuluku ya bonsómi ya bato ya nzebi ya likoló na eye etáli bobimisi mosolo mpo ya etumba libosó ya bobaluki ya klima akomi sik’oyo elama y'Akademi ya Papá ya nzebi ya bato. Mwási ya Kamelúne ya mibú 57 alubolamaki mokolo ya yambo 9 ya sánzá ya misáto na Papá Léon XIV.

Vatican News

Dr Songwe abotami na Nairobi na Kenya. Azali mokóló ya licence lyokó ya nkita mpe nzebi ya politiki ya etéyelo enéne ya Michigan (Amerika) mpe ya doctorat mókó ya nkita ya mitúya ya etéyelo enéne katoliko ya Louvain (Belgique).

Mwási ya mayéle asálaka mpo ya Bánkí ya mokili (Banque mondiale) úto 1998 kinó 2015 esika wápi asalaki na bisika loléngé na loléngé, mpenza eye ya mokambi mpo ya Senegáli, Cap-Vert, Gambia, Guinée-Bissau mpe Mauritanie. Úto 2015 kinó 2017, Dr Vera Songwe asálaki ntómo ya mokambi mpo y'Afrika ya Westi mpe ya ntéi ya Société financière internationale.

Na sima, úto 2017 kinó 2022, azalaki na esika ya secrétaire molandi enéne ya ONU mpe secrétaire ya Commisio ya nkita mpo y'Afrika na ONU. Mokeli mpe mokónzi ya Liquidity and Sustainability Facility, azali lokóla sik’oyo Senior Fellow non résidente n’Afrika Growth Initiative ya Brookings Institution na Washington (Amerika).

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

12 sánzá ya mísáto 2026, 13:40