Mobémbo ya Papá na Monaco, bobengi bokó mpo ya boyambi mpe bokútani
Jean-René Bompolonga – Kinshasa
Etuka ya Monaco ekozela Mokitani ya Petelo. Mobémbo eye ya yambo na Poto, na libanda ya Italie, elingi ezala elembo yókó ya penepene mpe ya bolendisi ya boyambi, kaka mpo ya lisangá ya Ekóló eye katoliko eke, kasi mpo ya bato bansó. Mpósá ya episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, ezali 'te «mobémbo eye epésa mpema móķó ya sika na etindá ya Eklezia ya Etuka ená, na bolendisi bomipesi ya bansó na makambo ya lombango» lokolá bobateli ya Bokeli, bobateli ya bomoí mpe bomátisi ya bosálisani na bikóló, na kobosana «baye bazanga makoki» te.
Mgr, ntina nini ezali na mobémbo ya Tatá-Esántu na etuka ya Monaco?
Lokolá toyébi, ezali esika ya kokende ya yambo na Poto na libandá ya Italie eponami na Papá Léon XIV, eye ezali liponi lyokó ya ye-méi. Na ndéngé ya lisapo, mobémbo eye ezali na ntina yókó ya loléngé, mpo na mobémbo ya nsúka ya Papá wa Roma na Monaco esálemi na ekeke ya 16, ntángo Polo III akendaka kúna mpo ya masoló ya boboto káti ya Charles Quint mpe François ya yambo. Káti ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe Monaco -epái wápi eyamba katoliko ezali naíno eyamba ya Letá-, ezali epái esusu na makambo ebelé ya boyokani ya ntina, esengeli koloba yangó, na etamboli ya Poto leló, mingi mpenza na likambo ya bobateli ya bomoí mpe na makambo misusu ya bioéthique. Na súka, na bato 40 000 bazali na Etuka, penepene na 10 000 bazali baí-Monaco mpe bakangemi makási na mimeseno na bangó mpe na bokúmisi ya bangó mókó, ntina ya bomoto na bangó, ya bomoko na bangó mpe ya bokobi ya bisalelo na bangó. Waná, mobémbo ya mosála ya Papá ezali boyokani elámu na mobémbo ya mokengeli ya Mokitani ya Petelo.
Monaco ezali yókó ya bikóló mike koleka na mokili. Na etamboli ya mokili ya bobéndani mpe ya bitumba, esika wápi mingi bakoloba likámá ya loléngé ya bikóló ebelé, boni boni ba bosóló lokolá eye bikoki kosalisa na botóngi ya molongó ya mokili ya boboto mpe sémba?
Na eleko yókó esika wápi sémbo ya mokili emonani lokolá elembi mpe ntángo mosusu emelami na «bomoni ya bokási» - na bozongi ya likámá ya makanisi bikolimbola bitumba ya bobateli, biye bikozikisa mokili mpe kokwéisa bokási ya sémbo mpo ya sémbo ya bokási-, bikolo ya mike bikolakisa bazali basinzili ya mokili ya lisangá ya bikóló ebelé. Bizali ebombanelo ya ntina libosó ya ba bolekisi ya bokónzi mpo, zambi ya Ekóló yókó eke, motindo ya sémbo ezali bozito bokó te, kasi elaka ya makási ya libiki mpe ya bonsómi. Ba bosóló lokolá eye ya Monaco bikolakisa 'te bokengi ya sóló evandi na mandoki te, kasi na botelemisi ya ba boyokani. Boboto bokó ekoúmela esengeli libosó libosó ezala «sémba», esálemi na botosi ya lokúmu lya moto mpe na ba bokokani bitiami na makási te. Ezali mingimingi Bikóló ya mike biye bikomema linaka ya mokili na mikakatano ya lobiko lokolá bobateli ya ba mbú mpe botomboli ekoúmela, makambo-makonzi biye biyebi ba ndelo ya géographie te mpe bikobenga bansó na mokumba.
Tatá-Esántu alobi 'te boboto ekoki kotóngama te na mindóki. Nsakola nini ekoki kobima na mobémbo eye ya yambo na Poto?
Liponi ya Monaco na Tatá-Esántu ezali na likanisi lyokó ya ntina eye elingi ezala na bomoko na momeseno ya diplomatie ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Tokoki komona na mobémbo eye bokóbi bokó na mosála ya Papá azalaki libosó, oyo azalaki komona Méditerranée lokolá laboratoire lyokó ya boboto epái wápi etombolamaki «esengo ya ba bokeseni». Úto mibú 1950, Giorgio La Pira ayokaka motúya mpe mosála ya esika ya Méditerranée na mokili lokolá esika ya ntina ya boboto na mokili, epái wápi «mbóngé ya masoló mpe ya boboto ekopanzana na bato ya mokili mobimba». Kasi Tatá-Esántu alobi lisusu na bokási 'te likambo ya kosála ya yambo mpo ya boboto káti ya bato ekoleka na bomoko na Nzámbe mpe na bisó mókó. Kaka moto ayokani na ye mókó akoki kokota na mpiko ya boboto mpe kokóma mosáli ya boyokani na bomoí ya mokolo na mokolo.
Monaco ezali na káti ya Poto mpe libosó ya Méditerranée, engúmba yókó ezali na mikakatano ya minéne, bánda na bitumba ya migration. Bikela nini bikóló ya Poto bikoki kosála na motindo eye?
Na motindo ya sik’oyo ezui bilembo ya bitumba makási mpe bokoti ebelé ya bamigrant -motángo emati koleka na bato bazui makámá 600 na Méditerranée kaka na ba sánzá mibalé ya 2026, ya likoló koleka úta 2014-, bikóló ya Poto bibéngami ya kozala «mwinda ya civilisation mpe ya bomoto». Libosó ya likámá ya bitumba esilaka te mpe bokólisi ya bitumba, esengeli kosála na «mpiko mpe motéma mpio» mpo ya kotónga ba nzelá ya lisoló, na boluki komitika na mayéle ya bomátisi mindóki te. Poto esengeli kozua lisusu likanisi ya batatá bakeli na yangó, na boleki na likanisi lyokó ya mbano ya ekóló ya pamba mpe ba bongaí ya bobateli na mwángo ya sóló ya bokotisi mpe bosálisani, na botiyi lokúmu ya moto o ntéi ya politiki.
Mpo ya mokakatano ya migration, ekosila na bokangi to botóngi bifelo te, kasi na boluki makambo ya mozindo biye bikotinda bato bansó ya kotika mabelé na bangó babotama, mpe na bomipesi na eye ebengami «sémbo ya kobima te» na lisálisi ya botelemisi (stabilité) mpe na botomboli ya nkita na bikoló biye baúti.
Méditerranée ebengami mingimingi «gbagba káti ya bato mpe biyamba». Okanisi 'te ekoki lisusu kosála mosála yangó?
Méditerranée ezali esika yókó ya pamba ya géographie te, kasi esika yókó ya bokútáni ya molimo mpe ya bonkoko: waná ezali mbela eye lisapo epési bisó. Mbela ená ezali libula lyokó ya eye eleka te, kasi bomipesi bokó ya kozongisa sika mokolo na mokolo na nzelá ya momeseno ya bokútáni. Lokolá boboto ekotóngama mingimingi úta ba ndelo, mabóngo ya ebale eye bibéngami leló ya kobongwana laboratoire ya ntángo insó ya bosololi káti ya biyamba mpe ya boyokani ya politiki. Méditerranée ekoki lisusu kotéya mokili 'te bozali lisangá ezali nzelá se yókó epái ya lobi lyokó ya sóló ya moto.
Lilendisi nini Papá akomema na lisangá katoliko ya Etuka, eye ekobika na esika yókó ya bikóló ebelé mpe mimeseno bébóo?
Tatá-Esántu ayéi na Monaco mpo ya kososolo bandeko na ye na boyambi, ayébi likambo 'te litatoli ya lisangá katoliko ya makási, bomoko na litatoli ya boyambi na ye mpe bomoí epésama na mosála ya bolámu ya bansó, ekoki kozala liziba ya lokúmu mpe, mpo na nini te, likanisi ekoúta mpo ya bikóló bisusu ya Poto biye bikokabola kaka misisa mina. Na bosóló, mobémbo ya Tatá-Esántu ekozala lilendisi lyokó ya kokólisa bomoí ya boyambi na bolukiluki bosóló mpe bobengi bokó ya kozongisa sika mpósá na ye ya bomoí ya káti.
Etuka ya Monaco ezali na boyokani úta kála na Ngwendé ya Sántu-Petelo. Eloko nini yo mókó okozela na mobémbo eye?
Mobémbo esántu eye ezali kaka ekela yókó ya diplomatie te, kasi eleko yókó ya lisapo ya ntina koleka na Eklezia. Papá Léon XIV, papá wa yambo ya lisapo ya sika ya kokende na Etuka, ayéi kokoma lokasa lya sika na bikeke ya bolingi káti na Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe Monaco. Liloba-lotómo eponami, «Nazali Nzelá, Bosóló mpe Bomoí» (Yn 14, 6), ezali motéma ekobeta ya bolakisi eye Tatá-Esántu alingi kopésa: koloba lisusu boyambo ya Kristu na eleko ya mikakatano ebelé mpe ya bozangi koyéba. Atá bokúse ya mobémbo, bozali ya Mokitani ya Petelo libosó ya Póso Esántu ezali na motúya ya mosakoli. Monaco ekolakisa 'te boyambi katoliko, atá ezali eyamba ya Letá, ekokanga mpéma te, kasi ekongéngisa bomoí na lisangá. Etuka ekolakisa 'te «bolaíki ya péto» ekoki kosálema, esika wápi bosálisani káti ya Eklezia mpe Letá ezali kaka libula ya kála te, kasi bokási bokó ya bomoí ekoki kosolóla na bosika na kobungisa misisa ya katoliko te. Elikya ezali 'te mobémbo eye epésa mpéma ya sika na etindá ya Eklezia ya etuka, na bolendisi bomipesi ya bansó na makambo ya kosála na lombango: bobateli ya Bokeli, bobateli ya bomoí mpe botomboli ya bosálisani bokó ya bikóló eye ekobosana bazanga makoki te. Papá Léon XIV ayéi mpo ya koloba lisusu 'te ezali kaka na botámboli na bosóló ndé tokoki kotónga boboto bokó ya sóló mpe ya sékó.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.