Mgr Gabriele Caccia na elobeli ya ONU na New York Mgr Gabriele Caccia na elobeli ya ONU na New York 

Mgr Gabriele Caccia, alubolami ntómá n'Amerika

Kinó sik’oyo motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na ONU na New York, Mgr Caccia akitani na episkopo ya lokúmu ya Fránsa Christophe Pierre, oyo akokisaki mibú 80 na 30 ya sánzá ya yambo elekaki. Alobi "akumisami makási" ya kolubolama na ekóló ya mbótama ya Papá Léon XIV. Ntómá ya sika amoni etindá na ye "na mosála ya bosangisi mpe ya boboto".

Vatican News

Papá Léon XIV alubolaki mokolo ya póso 7 ya sánzá ya misáto episkopo Gabriele Giordano Caccia, ntómá n'Amerika. Azalaki kinó sik’oyo motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU na New York. Mgr Caccia akitani na episkopo ya lokúmu Christophe Pierre oyo asepelaki mibú 80 na 30 ya sánzá ya yambo elekaki mpe Papá andimaki bomilongoli na ye na mosála mpo ya likoló ya mibú.

Mgr Caccia alobaki "akumisami mpe azali na botóndi makási na mokáno ya Sántu-Papá" ya kolubola ye ntómá na ekóló mpe na Eklezia esika wápi Papá ye-méi "abotama mpe akóla". Ayambi "etindá ena na esengo mpe na bozangi motéma mpio": etindá yókó, elobi ye, "na mosála ya bosangisi mpe ya boboto" eye ekobánda na bokundolami ya mibú 250 ya mbótama y'Amerika. Amilobi bôngó "alendisami na móto mpe bofúngwami" eye asili amona ya Eklezia ya kuna, ya bato mpe misála ya ekóló ená eye azuaka libakú ya koyéba na mibú mya ye ya mosála na ONU na New York.

Abótami na Milan na 24 ya sánzá ya mibalé 1958, Mgr Gabriele Giordano Caccia akulaki bonganga Nzámbe na 1983 na episkopo ya lokúmu Carlo Maria Martini, asálaki mosála na ye na paloise San Giovanni Bosco na Milan kinó 1986. Atindámaki n'Akademi ya Papá na Roma, (esika wápi batangisaka bantómá, ndlr), azuaki doctorat yókó na boyékoli matéya ma Nzámbe na mozindo mpe licence lyokó na droit canonique ya Université ya Papá Grégoire. Na sima akotaki na mosála ya boyokani ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na 1991, atiamaki na ndáko ya ntómá ya Papá na Tanzanie. Na 1993, abengamaki ya kosála na Eténi ya Misála minéne ya Secrétariat ya Letá, na Secrétariat ya mokitani. Na 2002, alubolamaki molandi ya zuzi mpo ya Misála minéne ya Secrétariat ya Letá.

Na sánzá ya sambo 2009, Benoît XVI alubolaki ye ntómá na Liban mpe episkopo mokónzi ya Sepino. Azuaki bobonzami ya episkopo ya Papá wa Roma ená na 12 ya sánzá ya libwa elandaki. Na 2017, Papá François alubolaki ye ntómá na Philippines mpe, na 2019, motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

10 sánzá ya mísáto 2026, 15:08