Luka

Eoiskopo ya lokumu Ludovico Altieri Eoiskopo ya lokumu Ludovico Altieri 

Makambo ya basántu: bato ya sika motóbá ya komemya

O eleko ya likita azuaki na episkopo ya lokúmu Marcello Semeraro mokolo ya yambo 23 ya sánzá ya misáto, Papá Léon XIV andingisaki bobimisi ya mikáno ebelé bitáli makambo ya bokómisi mwa esengo na bokómisi mosántu. Mikáno bindimi mpenza libonza ya bomoí mpe mabongi ya bolombé ya Basáli ya Mibáli mpe ya Bási ya Nzámbe, bilongi ya boyambi biúti na mikili bikeseni mpe ya mbélá ya ndéngé na ndéngé.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Káti ya mikáno bisakolamaki ezali bondimi ya «libonza ya bomoí ya Mosáli na Nzámbe Ludovico Altieri», episkopo ya lokúmu mpe episkopo y'Albano na ekeke ya 19. Abotama na Roma na 17 ya sánzá ya sambo 1805 mpe awaka na 11 ya sánzá ya mwambi 1867 na Albano Laziale, na Italie, Ludovico Altieri andimami mpo ya likabo nionso ya bomoí na ye na mosála ya Eklezia.

Mabongi ya bolombé bindimami ya ndéngé na ndéngé ya bomoí

Tatá-Esántu andimaki lokóla «mabongi ya bolombé» ya Basáli ya Mibáli mpe ya Bási ya Nzámbe ebelé, baúti na bizaleli mpe ba mbélá ya ndéngé na ndéngé. O ntéi na bangó, sángó ya Irlande Edward Joseph Flanagan, mokeli ya Boys Town, eye bomoí na ye ya sángó etiamaka elembo na bomipesi mpo ya bolengé ezali na mikakatano, bozangi lisálisi mpe botiami pembeni. Sángó Edward abotama na 13 ya sánzá ya sambo 1886 na Ballymoe, na Irlande, mpe awaka na 15 ya sánzá ya mitáno 1948 na Berlin, n'Allemagne.

Bindimami lokóla mabongi ya bolombé sángó ya Fránsa Henri Caffarel, sángó ya dioceze, mokeli ya lisangá «Équipes Notre-Dame » mpe ya Institut séculier «Fraternité Notre-Dame de la Résurrection». Abotama na 30 ya sánzá ya sambo na Lyon mpe akúfaka na 18 ya sánzá ya libwa 1996 na Beauvais, molimo na ye na eye etáli libala ekokoba kopesa likanisi na mabótá ebelé na mokili.

Mokáno etáli lokóla mamelo ya Pologne Stanislava Samulowska, abotama Barbara na 30 ya sánzá ya yambo 1865 na Woryty (Pologne ya leló) mpe awaka na 6 ya sánzá ya zómi na mibále 1950 na Guatemala. Azali mamelo ya Société des Filles de Saint-Vincent-de-Paul.

Mikáno bina bitáli lokóla mamelo ya Espagne Maria de Bethléem du Cœur de Jésus Romero Algarín, abotama Maria Dolores, amipesaka na bomoí ebonzama. Azali mamelo ya Congrégation ya ba Servantes du Divin Cœur, abotama na 7 ya sánzá ya zómi 1916 na Séville, na Espagne, mpe awaka na 12 ya sánzá ya zómi na yókó 1977 na Sanlúcar la Mayor, na Espagne.

Bosántu ebikami na bomoí ya momeseno

Káti ya bilongi bindimami na Tatá-Esántu ezali lokóla laíki yókó, Giuseppe, tatá ya libótá ya Italie. Abotama na 15 ya sánzá ya misáto 1909 na Montebaranzone, na Italie, mpe awéi kaka na etuka ena na 22 ya sánzá ya motóbá 1965. Bomoí na ye ekotatola likambo 'te bosántu ekoki kobikama na bosóló ya mokolo na mokolo, o ntéi ya libótá mpe ya mosála.

Na nzelá ya mikáno bina, Eklezia apesi mwinda na ba botámboli bitiami elembo na lobokó na Nsango-Ndamu, na bizaleli ya lisapo mpe bonkoko ndéngé na ndéngé. Ba bondimi waná ya sika bikokundola 'te mbélá ya kobika Nsango-Ndamu na ndéngé elongobami etáli baye bansó bazua batisimo, atá mbélá na bangó mpe ezaleli ya bomoí na bangó.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

23 sánzá ya mísáto 2026, 14:39