Mgr Luigi Roberto Cona Mgr Luigi Roberto Cona 

Léon XIV aluboli Mgr Cona ntómá ya sika na Syrie

Papá alubolaki na 19 ya sánzá ya misáto Mgr Luigi Roberto Cona na ebóngá ya ntómá na Damas. Motindami ya sika ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na Syrie azalaki kinó sik’oyo na ebóngá na El Salvador. Akitani na episkopo ya lokúmu Mario Zenari oyo azalaki waná mibú zómi na sambo, kinó na sánzá ya mibalé elekaki.

Vatican News

Ngwendé ya Sántu-Petelo ekolakisama úta sik’oyo epái ya bakambi ya Syrie na Mgr Luigi Roberto Cona, na mosála ya diplomatie ya Vatican úto 2003. Abotama na 1965, moí-Italie oyo, episkopo mokónzi ya Sala Consilina, azalaka lokóla mosáli mpo makambo ya minéne ya Secrétariat ya Letá kobánda 2019 kinó 2022. Yambo, asálaka na bandáko ya ntómá na Panama, na Portugal, na Cameroun, na Maroc, na Jordanie, na Turquie mpe na Italie. Úto 2022, azalaki na ebóngá na El Salvador.

Na bolubolami na 19 ya sánzá ya misáto na Léon XIV, Mgr Cona akitani na episkopo ya lokúmu Mario Zenari oyo azalaki na esika ená ntángo nionso ya etumba ya ba civil eye ezikisaki Syrie mibú zómi na misáto. Papá François alingaka 'te episkopo ya lokúmu eye akokitana atikala waná atá bitumba mpe bobwaki ba bombe, lokóla elembo ya botelemi ngbi mpo ya bato mpe masangá ya bakristu bazalaki konyokwama na bitumba, na bobángisi, na bokeleli, na bitumbu ya bikóló ya mokili mpe boningani ya mabelé. Episkopo ya lokúmu Zenari, na 2021, akokisaki mibú 75, elingi koloba na lokasa epasó, atikalaki na Damas kinó sánzá ya mibalé ya mobú eye, alekisaki mibú 80. Atikalaki eleko nionso ya etumba ya ba civil, bokwéi ya Bachar al Assad mpe bokoti ya bokónzi ya ntéi.

Mgr Cona akozala na mosála ya kotambola elongo na masangá katoliko biningani makási na mibú zómi na misáto ya bitumba, ba bobomi, mpe ya bobimi. Longola kobátela nsinga na bakónzi ya sika bakonzamaka na ba jihadiste ya kála, akosengela kosálisa mpe kolendisa ba Eklezia bizali nanu na engúmba y'Alep mpe kosála ya bozongi ya bakristu baye bakimaki mibú zómi na mitáno bileki mpe bazui ekimelo na bikóló ya pembeni to na bikóló ya pótó.

Episkopo ya lokúmu ya Venise, ntómá na Damas úto 2008, amonaki mosála na ye ekobisami na Papá François, oyo asálaka ye episkopo ya lokúmu na 2016.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

20 sánzá ya mísáto 2026, 13:51