Episkopo ya lokúmu Pizzaballa atelemeli bolekisi lotómo na kombo ya Nzámbe mpo ya kolóngisa etumba
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
«Bolekisi lotómo mpe bobúbi na kombo ya Nzámbe mpo ya kolóngisa etumba eye to etumba esusu nionso bizali lisúmu ya mabé koleka eye tokoki kosála na eleko eye», elobaki episkopo ya lokúmu Pierbattista Pizzaballa o eleko ya webinaire yókó ebongisamaki kaka mpo ya etumba eye ekobébisa Moyen-Orient.
«Etumba», ekobaki ye, «ezali libosó libosó politiki mpe eyano na matómbá ya sóló, lokóla bitumba nionso. Tosengeli kosála nionso eye ekoki mpo ya kotika esika te na lokóta eye ya eyamba ya lokutá, eye ekoloba Nzámbe te, kasi ya bisó mókó».
Motomolo latin ya Yérusalem alimbolaki maloba ya secrétaire y'Amerika etáli Bobundeli oyo, na bosololi bokó na ba média, atangaki Loyémbo 144 mpo ya koloba bobenisi ya bonzámbe na mobúlú ya Israël mpe Amerika eye ekosálema na Iran.
O eleko ya ekangeli yókó na Fondation Internationale Oasis, episkopo ya lokúmu Pizzaballa alobaki 'te «lokóla bandimi (...), tosengeli koloba 'te ba croisade ya sika bizali te. Sóki Nzámbe azali na etumba eye, azali na káti ya baye bakokúfa, baye bazali na pási, baye bakonyókwama ndéngé na ndéngé, esika nionso na Moyen-Orient».
«Nalobi te 'te, ngambo yókó to ngambo esusu, etumba eye ezali na ba ndimbola ya biyamba», ebakisaki ye, «kasi ezali na ba bobúbi: baye balingi kokotisa eyamba na káti bakobúba na kombo ya Nzámbe».
Nsakola ya bokristu
Na bolimboli mbélá ebwakamaki na Papá Léon XIV mpo ya bozimi-móto mpe bosololi, motomolo alobaki 'te ezalaki likámá makási ya kokweya na litoí ya moto akúfa matoí, kasi 'te Eklezia, elobaki ye, esengeli kokoba koloba bosóló mpe kosangana mpo ya kobongisa lobi.
«Eye etóngami na mobúlú ekokúfa; yangó ezali na lobí te, kasi yangó ekokela lokóla esika yókó ya pamba nzinganzinga na yo: bobángi, nkándá, boyini -nionso eye, na lokóta ya bokristu, ezali na mokili ya liwa», elobaki ye.
O eleko ya bozui liloba ena, episkopo ya lokúmu alobaki lokóla mokúmbá ya ba média na etumba, na bolobi 'te boyébisi ezali mobimba na káti ya etumba: «Ezali loléngé lyokó ya koyébisa yangó, kasi lokóla ya kolóngisa yangó to ya kondimisa yangó».
Waná, ebakisaki ye, bapanzi nsango bazali na mokúmbá ya kosálisa batángi na kopesa motindo mókó na eye ezali koleka, na bopesi ndimbola yókó ya sémba, to na bosálisi bangó ya komisála likanisi lyokó elongobami mpe ya koyéba nini bakanisa bangó mókó.
Ezaleli na Gaza mpe na Cisjordanie
Mpo na waná, atelemelaki likambo 'te likámá na Gaza mpe mobúlú na Cisjordanie bilobamaka lisusu te, na bolobi lokóla 'te ezaleli ya bato etikali pási kúna. «Ezali lisusu likambo ya nzala te, kasi ezali nanu na milio 2 ya bato bazali na lokendo, bazangi nionso; 80% ya etuka ya Gaza ezali kaka ya kobéba, mpe botóngi lisusu ebándi nanu te; ba lopitalo 36 bizali kotambola mwá moke, kasi nkisi bizangi, atá ba antibiotiques ya ntina. Ekoki te ya kososola boni mpe ntángo nini ezaleli ená ya pási ekosila: Likita lya boboto eyébi nanu te nini asengeli kosála. Namoni sóki Hamas azongisi mindóki te, Israël akobima te; Hamas akozongisa mindóki te sóki Israël akobima te. Nionso ezali matata», elobaki episkopo ya lokúmu Pizzaballa.
«Mpo ya Cisjordanie», elobaki ye, «ezaleli ekokoba kobéba: mokolo na mokolo, ba colon bakokotisa mobúlú na bituka ya Palestine. Ezali pembeni ya nkoto yókó bisika ya kotála; baí-Palestine bazali kaka na pási ya kotambola, mpe ba ndingisa ya kokumba motuka bilongolama mingi».
Na súka, motomolo alobaki bobángi na ye mpo ya mikáno biúti kozuama sik’oyo biye bitáli cadastre mpe na bozangi kondima mapolome ya bitéyelo ya likoló ya Palestine na Israël, mikáno bindimamaki na bulamatari ya Israël, biye bokimema mikakatano ya mosolo, ya bomipimi mpe bozangi ya batéyi ya bakristu mpo ya bitéyelo.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.