Episkopo ya lokúmu Parolin: «na mokili ya bobángi, sántu François akopesa esengo mpe bondeko»
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
«Bosáwa, esengp ya biloko ya mike, liyoki ya kozala bandeko ya bansó mpe ya nionso». Ezali "bosálisi bokono ya makási" eye Sántu François y'Assise akopesa na mokili mókó ezali na "mpósá koleka ya kozua, ya kitoko koleka, bobébisi, ya eye ezali na ntina te, bobateli matómbá", etondi na bato ya eleko yókó ekoluka "nsómo mpe mawa" likoló ya "mosála ya kéba kéba", na makámá ya nkita, ya klima, ya "bitumba ya bansó libosó ya bansó mpe libosó ya nionso".
Na bokambi misa na basilique ya likoló y'Assise, mokolo ya eyenga na ntóngó ya 15 ya sánzá ya misáto, o eleko ya bolakisi ya mbalakaka bitika ya Poverello, mpo ya bokundoli mibú 800 ya liwa na ye, episkopo ya lokúmu Pietro Parolin, secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, alimbolaki ntina nini ya bobéndi eye sántu mokónzi ya Italie akosála na mokili mobimba, bikeke ebelé sima ya liwa na ye.
Ezaleli yókó ya moto mpe ya molimo eye bakoki koboya te
Na litéya na ye, episkopo ya lokúmu Parolin azuaki likanisi ya eténi yókó elobamaka na buku ekende nsango "Les Fioretti". Mokolo mókó, ndeko Masseo da Marignano, yókó ya baningá ya yambo ya François, atunaka mpo na nini moto nionso "azalaka kolanda ye", koyóka ye mpe kotósa ye, nzokándé azalaki kitoko te, azalaki na "nzebi enéne te" mpe azalaki « moto ya lokúmu te ». Poverello ayanolaki ye 'te "miso bisántu bya Nzámbe" bitelema te na moto ya « mabé » koleka, "mobobé" koleka mpe "mosumuki" koleka ye. Nzokándé, etálisaki episkopo ya lokúmu Parolin, François alongaki kokolisa lisimi (admiration) ya bato mibalé ya bwanya koleka ya ntembe te ya Moyen Âge, moyemi mpe moyemi-ndáko Giotto mpe ngongi Dante.
Ntina ya bobéndi ená, elobaki Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, evandi na "ezaleli na ye ya moto mpe ya molimo", lokóla elimbolami na moto ya yambo akomaka bomoí na ye, Thomas de Celano. Ya libosó, François azalaki na "ezaleli yókó ya boboto, na loléngé lyokó ya kimia, boboto na maloba na ye, na bokébi na bopáleli na ye, nzeneneke koleka na bokokisi ya misála biye bapesaki ye, moléndé na bikela na ye, alingamaka na nionso. Na molimo ya kimia, na elimo ya boboto, na molimo ya bosáwa, amikotisaki na botáli (contemplation), ntángo insó na losámbo mpe na esengo na nionso", ekomaki mokomi ya "S. Francisci Assisensis: vita et miracula".
Kozala ndeko ya bansó mpe ya nionso
Kasi loléngé esusu ya bomoto na ye ekokoba kobénda "bokébi na bisó" bikeke mwambi bileki, ebakisaki episkopo ya lokúmu: "esengo na ye ya péto", "mobola" na ye ya koleka, "bondeko na ye epái ya bansó". Sántu y'Assise ayébaki kondima "na bomikitisi, na motéma pio mpe esengo" bitumba ya bomoi. Mobola na ye ezalaki kaka "nzelá yókó ya komiyokisa pási mpo kokoma na bobongi" te, kasi loléngé lyokó ya "kozala na bokokani elongobami na Kristu". Na nsúka, azalaki komiyoka "ndeko ya nionso mpe ya bansó": bato, bokeli, mokili, atá liwa
Sántu François y'Assise, elobaki lisusu Secrétaire ya Letá, na bosukisi litéya na ye, akomaka Loyémbo ya bakeli na "eleko yokó ya likámá, ya molili, o ntéi na ye mpe nzinganzinga na ye". Eleko yókó, episkopo ya lokúmu atálisaki, eye ezangi bokokani te na eye ya bisó, "esika wápi molili ya etumba ekomonana lokóla ekoyindisa mwinda ya elikya". Ezali mpenza na eleko eye ya lisapo mpe ya lobiko, na botombeli "boboto mpe malámu" na mokili mobimba, ndé Secrétaire ya Letá ya Vatican abengaki kosámbela na bosáleli maloba ya Poverello y'Assise: na bosengi na "Nzámbe oyo atikaka bisó te" ya kongengisa "molili ya motéma", ya kopesa bisó « boyambi bokó ya sémba, elikya yókó ya sóló, likabo lyokó péto mpe bomikitisi ya mozindo ».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.