Luka

Episkopo ya lokumu Parolin o eleko ya bolakisi buku etali Léon XIV Episkopo ya lokumu Parolin o eleko ya bolakisi buku etali Léon XIV 

Episkopo ya lokúmu Parolin alendisi Israël mpe Amerika kotika Libá na kimia

Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo azalaki mokolo ya misáto 18 ya sánzá ya misáto na Ndáko ya baponami ya Italie mpo ya bolakisi búku yókó etáli Léon XIV. O ntéi ya molúlú, azuaki mituná ya bapanzi nsango na ezaleli ya mokili. «Botika Libá kimia. Makambo bisengeli kosila na lisoló mpe diplomatie», elendisaki ye.

Vatican News

Lokóla na mókó mókó ya matámboli na ye libándá ya Vatican, episkopo ya lokúmu Parolin andimaki mituná ya bapanzi nsango bazalaki na Ndáko ya baponami ya Italie, na Roma, mpo ya bolakisi ya búku móķó etáli Papá. Etumba na Moyen-Orient ezalaki mókó ya makambo bitunámaki. Secrétaire ya Letá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo akoloba nini, ye moto azalaka ntómá ya Papá yambo ya kokóma moto ya mibalé ya Vatican, sóki akómi libosó ya mokónzi y’Amerika Donald Trump? Akoyébisa ye «kosilisa etumba na lombango mpo likámá ya bokobi bokó ezali mpenza sik’oyo. Nakoyébisa ye ya kotika Libá kimia».

Nsakola ená esengeli «eyébisama lokóla na baí-Israël» zambi basála makási na bosóló ya «kosilisa makambo maye bikoki kozala, to bakomona kozala, na nzelá ya boboto ya diplomatie mpe ya lisoló», ebakisaki episkopo ya lokúmu Parolin.

Secrétaire ya Letá azalaki na bolakisi ya «Léon XIV. Nini bokoloba 'te nazali? Nazali mwána mobáli ya sántu Augustin», búku bokó ebimaki na éditions Cantagalli mpe ekomami na Ignazio Ingrao mpe sángó augustin Giuseppe Pagano.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

19 sánzá ya mísáto 2026, 11:17