Luka

Mobulu na Cisjordanie Mobulu na Cisjordanie 

Episkopo ya lokúmu Gugerotti abwaki mbélá mókó mpo ya bokongoli ya Mokolo ya Mitáno Esántu

Na bopúsani yaa bokongoli ya Mokolo ya Mitáno Esántu mpo ya Mabelé Esántu, episkopo ya lokúmu alendisi, na mokánda mókó ebimaki mokolo ya yambo 16 ya sánzá ya misáto, ba katoliko bansó ya kopesa eye bakoki mpo ya kosálisa kozongisa elikya na bato baye bakobika na bisika Yézu abikaka.

Vatican News

Mobú na mobú, na bopúsani ya Mokolo ya Mitáno Esántu, bokongoli bokó esálemaka na ba ndáko-Nzámbe katoliko ya mokili mobimba mpe mosolo ekongolamaka ekendeke na Custodie ya Mabelé Esántu, eye ebombaka mpe etálaka mosála ya Eklezia zinganzinga ya Bisika Bisántu. Mokolo ya yambo 16 ya sánzá ya misáto, episkopo ya lokúmu Claudio Gugerotti, mokambi ya dicastère mpo ba Eklezia ya monyele, atindaki mokánda mókó na baepiskopo ya mokili mobimba zambi ya kolendisa bangó na mbélá mókó ya bosálisani mpo ya bokongoli mpo ya Mabelé Esántu. Bokongoli ená ebotama na mpósá ya ba Papá mpo ya kozala na nsinga ekási káti ya bakristu ya mokili mpe baye ya Bisika Bisántu, balembi makási mikolo miye.

«Lokolá tolikyaki 'te kimia ekoka kozongisa bomoí mpe elikya na Mabelé Esántu !», ekomi préfet. «Masoló mpe boyokani ya lokutá bibakisami, mpe kaka na eleko ená mindóki bivandi nye te». Na boleli bokébi eké ya bapanzi nsango epesamaka na Mabelé Esántu, episkopo ya lokúmu Gugerotti alobi lisusu 'te kimia ezali mosika, mpo «mindóki bikokoba kotuta, bato bakokúfa, mabelé bikowélana, bakristu bakokima mpo ya kobikisa bomoí na bangó».

Atondi baepiskopo mpo ya makási na bangó na boluki «kokanga mpe koboma mikolóbe» na ba mpótá ya mokili mókó ekabwani na nkándá ya mobúlú. Nzokándé, ekomi ye, «bisó, bakristu, tokoki kaka kolikya, mpo Nzámbe azali elikya na bisó mpe akoki kotika bisó te». Zambi ya kozongisa babáli mpe bási bakobika na likámá makási na Mabelé Esántu "likoki ya kolikya mpe ya kobandela lisusu», episkopo ya lokúmu abengi mókó mókó ya kosála likabo lyokó, ekela ya bomoí «mpo ya Custodie ya Mabelé Esántu eye ekokengele úta kála na bisika biye bomoí ya Mokónzi Yézu elekaka».

Mokambi ya dicastère mpo ya ba Eklezia ya monyele alobi lisusu 'te bakristu ebelé na Mabelé Esántu bakobika na motindo ya makoki mabé koleka, mingi káti na bangó babungisa misála na bangó bikangemaki na koyamba bato ya mobémbo mwa boyambi. Na waná makambo mabé ya etumba bibakisami, bolembi makási ya mokolo na mokolo ya bakristu, makámá ya mokili. Na ngonga eye ya mindondo, likabo ekomi elembo yókó makási ya boyambi, mpo «Mabelé Esántu móķó ezanga bandimi ezali mabelé móķó ebungi» eye ya «kobungisa libela likanisi na ye ya bomoí mpe bokobi na liziba-mpenza ya Libiki eye ekobota bisó na Kristu».

«Bokongoli mpo ya Mabelé Esántu, na lisálisi ya mokolo na mokolo ya bandeko franciscain mpe ya baye bakotambuisa mpe bakosála o ntéi ya masangá esika waná, ezali litangá ya maí na mbú, kasi mbú ená, na bobungisi ntángo insó matangá ya maí, ezali na likámá ya kokoma elikí», ekébisi episkopo ya lokúmu.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

17 sánzá ya mísáto 2026, 11:55