Luka

Papa Léon XIV mokolo ya 16 ya sanza ya mibalé na Etéyelo ya Papa mpo ya Bomoi Papa Léon XIV mokolo ya 16 ya sanza ya mibalé na Etéyelo ya Papa mpo ya Bomoi   (@VATICAN MEDIA)

"Basálisi" na bondimami bwa bakónzi babandisami mpo ya Etéyelo ya Papá ya bomoi

Lisangá ya mibéko ya Etéyelo ekelama na Yoane-Polo II na 1994 mpo ya kobátela mpe komatisa motúya ya bomoi ya moto mpe lokúmu ya moto ebimisamaki na Léon XIV mokolo ya mitáno 27 ya sánzá ya mibalé.

Vatican News

Etéyelo ya Papá mpo ya Bomoi ebimisaki mibéko bibimisaki na 2016 na Papá François, na boyingisi elongi ya sika ya "basálisi". Ezali bato baye bazali komiyéba na maye etéyelo ekoluka, bakosálisa bokobi ya botángisi. Bizali bato baye bazali na lopakátói (profil) ya etéyelo te kasi baye balingi kosunga makambo bitombolami na Etéyelo.

Lisangá ya mibéko, ezui mokoloto ya Papá Léon XIV na mokolo ya 27 ya sánzá ya mibalé 2026 elimboli mwángo ya etéyelo -bokónzi, buro ya nionso, bilama mpe basálisi- mpe esemboli makoki ya mosála ya bokónzi, na bolobi lisusu mosála ya bokambi mpe ya bosangisi ya buro ya nionso.

Boluboli ya basálisi ezali ya kobongo mpo ya mibú misáto, ekoki kokobama kinó mbala mibalé misusu, na mokáno ya lisangá ya bokambi mpe sima ya ndingisa ya Secrétariat ya Letá.

Mokánda, mbuma ya mosála ebándaki koleka mobú mókó, esálemaki na bosangisi bokó elongobami, na bopesi motángo ya biténi bilandani ya mobéko.

Etéyelo ya Papá mpo ya Bomoi, ekelama na sántu Yoane-Polo II na motu proprio Vitae Mysterium, ya 11 ya sánzá ya mibalé 1994, "azali koluka bobateli mpe bomátisi motúya ya bomoi ya moto mpe lokúmu ya moto".

 

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

01 sánzá ya mísáto 2026, 14:28