Luka

Bendele ya Cuba na La Havane. Bendele ya Cuba na La Havane.  (AFP or licensors)

Bakangemi ya Cuba batikami sima ya Ngwendé ya Sántu-Petelo kozala montei

Ministre ya makambo ya bapaya na La Havane asakoli botikami ekosálema ya bakangemi ntúkú mitáno, "na elembo ya bolámu" epái ya Vatican. Úta mibú, Ngwendé ya Sántu-Petelo ekosála mosála ya boyokani ya ntina na lisoló káti ya bakambi ya Cuba mpe libandá, na lisálisi ya Eklezia katoliko ya ekóló.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Bato 51 basengelaki mikolo mikoya kobima na boloko ya Cuba, elobaki na mpokwa ya 12 ya sánzá ya misáto ministre ya makambo ya bapaya na La Havane. Bobimisi mókó "na elembo ya bolámu" epái ya Vatican esémbolaki bulamatari ya Cuba, na botatoli mosála ya makási ya Ngwendé ya Sántu-Petelo. Mosála ya diplomatie ya Vatican na Cuba ezali ya kála. Mibú miye mileki bobimisi mingi bisálemaki, lokóla na sánzá ya yambo 2025, ntángo wápi bakangemi 553 babimaki sima ya masoló milayi na Vatican. Mokambi ya Cuba Miguel Diaz-Canel atindaka bongo mokánda mókó na Papá François mpo ya kotondo ye, na bolimboli 'te ekela ená esálemi na molimo ya mobú ya zúbile.

Diplomatie yókó ya kála

Ezali bôngó mbala ya yambo te 'te Ngwendé ya Sántu-Petelo ezali montei káti ya bakónzi ya Cuba mpe boboyi (opposition), atá bato basusu lokóla Amerika, eye apekisi na makási pitolo na La Havane. Eklezia katoliko ya Cuba, na lisálisi ya Vatican, asálaka ndakisa mosála mókó makási na bobongisi ya boyokani káti na La Havane mpe Washington na 2015, o eleko ya eténi ya mibalé ya bokónzi ya Barack Obama. Cuba etikali likambo lyokó ya ntina na diplomatie ya Papá, na ekóló yókó esika wápi bato bakomona  bizaleli na bangó ya bomoí kobéba likoló ya embargo y'Amerika. Eklezia ya Cuba, na ekóló ezali mingimingi esimbela ya sika ya Letá ekweya mpenza na nzela ya Caritas, eye ekosálisa baí-Cuba ya kokokisa mpósá na bangó.

Boyokani ekatana te

Cuba mpe Ngwendé ya Sántu-Petelo bakundolaki mobú eleki mibú 90 ya boyokani na bangó ekatana te. Mpo na yangó, Mgr Paul Richard Gallagher, secrétaire ya boyokani na Bikóló, asálaki mobémbo na Cuba. Na liyangani lyokó, mokambi ya diplomatie ya Vatican akundolaki 'te Ngwendé ya Sántu-Petelo elonaka "diplomatie yókó ya elikya" eye, "mosika ya kokweya na ndimbola yókó ya mabé ya bosóló eye elingi bisó, ekobenga bisó ya kotála na bizaleli bina bisimbisi biye bikoki kolekama soki tokotisi bansó ya bisó". Bibandaka ya sóló na 1935, na eleko ya Papá Pie XI, basinga káti ya Cuba mpe Ngwendé ya Sántu-Petelo bitikala kokatana te atá bokónzi ebongwami. O eleko ená, Cuba esálaka Lisangá ya batindami epái ya Vatican mpe apesaka motindami mókó ya ntina. Epái na ye Ngwendé ya Sántu-Petelo efúngolaki ndáko ya ntómá na ye na La Havane. Cuba ezalaka yókó ya bikóló ya yambo y'Amerika ya latin ya kozala na boyokani na Vatican.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

14 sánzá ya mísáto 2026, 14:12