Luka

Episkopo Konrad Krajewski na esika ya bambommi ya Lesbos n 2019 Episkopo Konrad Krajewski na esika ya bambommi ya Lesbos n 2019  (ANSA)

"Babola bayékolisi ngai kobika na Nsango-Ndamu", elobi episkopo ya lokúmu Krajewski

Mokambi ya kála ya molúlú, alubolami sángó-molendisi ya Papá mpe mokambi ya dicastère ya Likabo, episkopo ya lokúmu Krajewski akobongama mpo ya kozonga na ekóló na ye, Pologne. Alobi na Vatican News esengo na ye na likanisi ya kosála etindá ya sika Papá Léon XIV apesaki ye, mpe abakisi mibú 28 na mosála ya Eklezia na Vatican mpe bolámu azui na baye bazanga, "balingami ya Nzámbe".

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Abongami ya kokende, ya kozonga epái na ye. Episkopo ya lokúmu Konrad Krajewski alubolami na Papá Léon XIV episkopo ya Łódź, na Pologne, engumba ye abotama. Waná ndé esika abotamaka na 25 ya sánzá ya zómi na mókó 1963 mpe na mibú 19, aponaki kokota na likindo ya dioceze, yambo ya kozua licence lyokó na boyékoli matéya ma Nzámbe na mozindo na Lublin. Na mibú 25, akulaki bonganga Nzámbe mpe mpósá na ye mpo ya litéya etáli milúlú mpe nsámbo ya bakristu o misa ekoli kinó kozua licence lyokó na etéyelo ya Papá Sant'Anselmo na Roma, lisusu kokóma na 1999 mokambi ya milúlú ya Papá pembeni na sántu Yoane Polo Il, moí-Pologne lokóla ye. Episkopo ya lokúmu Krajewski akobaki mosála na ye o eleko ya mosála pembeni ya ba Papá Benoît XVI mpe ya François oyo, na 3 ya sánzá ya mwambi 2013, alubolaki ye mokambi ya molúlú ya Papá, na sima akeli ye episkopo ya lokúmu na 28 ya sánzá ya motóbá 2018. Etindá yókó ya molayi, elimboli ye, ezali na mingi ya kotondo.

Mpo ya bolingo ya Eklezia

"Mibú 28 na mosála ya ba Papá minei, elobi episkopo ya lokúmu, nazalaka pembeni ya Yoane-Polo II na mibú sambo ya súka ya bomoí na ye, o eleko azalaki mokoni. Na sima ezalaki mosála ya Benoît XVI, eye ya Papá François mpe ba sánzá zómi ya Papá Léon XIV. Namoni makambo ndéngé na ndéngé, mpe Papá na Papá amemaki eloko mókó ya sika na Eklezia, mókó mókó na loléngé na ye". Makanisi bikosálisa ye ya koloba etindá na ye mpe bolingo na ye mpo ya Eklezia eye asáleli na "mibú na ye ya malámu". Bomáti ya moto mpe ya molimo ezui mingi na bozali pembeni na babola.

Na pépo eye eútaki na ye na JMJ

"O eleko nakendaki na Papá François na Rio de Janeiro mpo Mikolo ya mokili ya Bilenge (JMJ), na ngonga zómi na misáto ya mobémbo nalekisaki ngonga mibalé ya koyóka ye. Alimbolaki ngai eye nasengelaki kosála lokóla mokambi ya molúlú, asengaki ngai kolala na babola, kobima libanda ya Vatican, ya kozua ntángo insó eloko te na libenga na súka ya mokolo mpo nionso ezalaki kokende na misála ya lisálisi. Kasi ezali na eloko yókó eye François alobelaka ngai mpe ezalaka na ngai kaka: "Soki oyébi nini osála te, túna kaka na Mokónzi mpe túna ye eye ye akoki kosála na esika na yo". Nasálaki ba mbéba ebelé, etúbeli episkopo ya lokúmu, kasi nasálaki yangó na ndéngé ya malámu mpe Papá asosolaki ngai mpe alimbisaki".

Mabánzo ya Pologne

Na eye etáli mosála ya sika ekozela ye, alobi 'te Papá Léon XIV asengaki ye na bokébi soki alingaki kokende, soki alingaki komema nzebi na ye nionso azui na Eklezia ya mokili mobimba na Eklezia ya ekolo. "Nandimaki na motéma mókó, mpo bolámu ya Eklezia ebotami penepene na bandimi. Dioceze na ngai ezali monéne, ezali na milio na ndambo ya bato, nabongami ya kosálisa". "Nabimaka na Pologne te, endimi ye, natikala kaka káti na bangó. Nazalaka kútu na mwá mabánzo moke".

Babola mpe Nsango-Ndamu

Nsango ya súka ya episkopo ya lokúmu Konrad Krajewski etindámi na "balingami ya Nzámbe", babola baye babengaka ye kaka "don Corrado" mpe baye bakendeki mobémbo na ye, lokóla na Turin mpo ya bolakisi Sántu Suaire na 2015, to mpo ya kolia pizza yókó sima ya mokolo mókó na ebale, to mpo ya kosolola eleko yókó, kasi kaka na lombango mpo ezalaki na likambo lyokó ya kosilisa noki noki. "Nasengeli kotondo bangó bansó, batéyi ngai -elobi ye na mwá nsómo- ya kotánga Nsango-Ndamu, ya kobika na ndéngé ya sika".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

13 sánzá ya mísáto 2026, 14:20